Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

mustafahacalaki/DigitalVision Vectors via Getty Images

BÓSƐNZƐLAKA!

Kosala ete ordinatere ekóma kosala makambo lokola moto​—Likambo ya malamu to ya mabe?​—Biblia elobi nini?

Kosala ete ordinatere ekóma kosala makambo lokola moto​—Likambo ya malamu to ya mabe?​—Biblia elobi nini?

 Mikolo eleki, bakonzi ya mokili oyo, ata mpe bato ya mayele na makambo ya siansi mpe ya teknoloji balobelaki mingi nguya oyo ordinatere ekómi na yango ya kosala makambo lokola moto, oyo babengi na français Intelligence artificielle (IA). Balobi ete ezali mayele moko ya malamu mpenza, kasi bazali mpe kobanga ndenge oyo bato bakoki kokóma kosalela yango na ndenge ya mabe.

  •  Intelligence artificielle ezali moko ya teknoloji ya makasi lelo oyo, ezali na makoki ya kobongisa bomoi ya bato ya mokolo na mokolo . . . Nzokande, ekoki mpe kosala ete tokóma kobanga mpo na libateli na biso. Ekoki mpe kobebisa ntomo oyo bato bazali na yango mpe makambo oyo moto mosusu azali na lotomo ya koyeba te mpe kosala ete bato bátyelaka lisusu baguvɛrnema oyo eponami na bato motema te.”​—Kamala Harris, prezida molandi ya Etats-Unis, 04/05/2023.

  •   Etuluku moko ya minganga mpe ya baoyo batalelaka bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto ya bato na mokili mobimba, oyo ekambami na monganga Frederik Federspiel, bakomaki boye na lisolo moko oyo ebimaki na mokolo ya 09/05/2023 na BMJ Global Health: “Intelligence artificielle ekoki kopesa solisyo ya malamu na makambo etali bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto ya bato, kasi ekoki mpe kobebisa bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto ya bato mpe makanisi na bango. a

  •   “Bato basí bakómi mpe kosalela mayele yango mpo na kopanza bansango ya lokuta. Mosika te, ekokóma likama mpenza mpo bato bázwa misala. Bato mosusu ya makambo ya teknoloji bazali kobanga ete na mikolo ezali koya mayele yango ekóma likama mpo na bomoi ya bato.”​—The New York Times, 01/05/2023.

 Na mikolo ezali koya, tokoyeba soki bato bakosalela mayele yango mpo na bolamu ya bato to te. Biblia elobi nini?

Mpo na nini mayele ya sika oyo bato bazali kobimisa ezali kobangisa?

 Biblia emonisi ntina oyo bato bakoki te kobimisa mayele ya sika ya teknoloji oyo ekosalelama kaka mpo na makambo ya malamu.

  1.  1. Ata ntango bato bazali na makanisi ya malamu, bakoki te komona na mosika makama ya makambo oyo bazali kobimisa.

    •   “Nzela mosusu emonanaka na miso ya moto ete ebongi, kasi na nsima, nsuka na yango nde banzela ya liwa.”​—Masese 14:12.

  2.  2. Moto akoki koyeba te soki bato mosusu bakosalela na ndenge ya malamu to ya mabe eleko moko oyo abimisi.

    •   “Nakotikela [misala na ngai] moto oyo akoya nsima na ngai. Mpe nani ayebi soki akozala moto ya bwanya to zoba? Nzokande akotambwisa mosala na ngai nyonso ya makasi oyo nasalaki makasi mpe oyo namoniselaki bwanya na nse ya moi. Yango mpe ezali mpamba.”​—Mosakoli 2:18, 19.

 Kobanga ya ndenge wana emonisi ntina oyo tozali na mposa ya litambwisi ya Mozalisi na biso.

Tosengeli kotyela nani motema?

 Mozalisi na biso alaki ete akotikela bato to mpe mayele moko ya teknoloji oyo bato babimisi nzela te mpo ebebisa mabele to mpe bato.

  •   “Mabele ezali koumela seko.”​—Mosakoli 1:4.

  •   “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​—Nzembo 37:29.

 Na nzela ya Biblia, Mozalisi na biso apesi biso litambwisi oyo ekomemela biso kimya mpe bomoi oyo ezangi kobanga na mikolo ezali koya. Mpo na koyeba makambo mosusu oyo Biblia elobi, tángá masolo“Nini ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya?” mpe “Elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya.”

a Euti na lisolo “Threats by Artificial Intelligence to Human Health and Human Existence,” oyo ekomamaki na Frederik Federspiel, Ruth Mitchell, Asha Asokan, Carlos Umana, mpe David McCoy.