Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisalisi mpo na baoyo bazali konyokola bango na ndako

Lisalisi mpo na baoyo bazali konyokola bango na ndako

 Ebongiseli ya ONU oyo etalelaka sante elobi boye: “Bato bazali konyokola basi na mokili mobimba. Mpe likambo yango ezali kopanzana ndenge kaka maladi mabe epanzanaka. Yango wana, esengeli kosala likambo moko mpo na kopekisa yango.” Ebongiseli yango elobi ete basi soki 30 kati na basi 100 “oyo babalá to bazali bamakango, mibali na bango bazali konyokola bango na kobɛta to kosangisa na bango nzoto na makasi.” Lisusu, lapolo moko ya ONU emonisi ete na mbula moko oyo euti koleka, basi 137 bazalaki kokufa mokolo nyonso na mokili mpo mibali na bango to bato mosusu ya libota babɛtaki bango. a

 Balapolo ekoki komonisa bonene ya makambo na oyo etali konyokola bato na ndako, kasi yango ekoki te kolimbola mpasi oyo moto azali na yango na makanisi mpe na nzoto.

 Ozali moko ya bato oyo bazali konyokola na ndako? To oyebi moto moko oyo bazali konyokola ye na ndako na bango? Soki bongo, makambo oyo elandi oyo euti na Biblia ekoki kosalisa yo.

  Ezali foti na yo te soki bazali konyokola yo na ndako

  Lisalisi ezali

  Ozali yo moko te

  Konyokola bato na ndako ekosila

  Ndenge oyo okoki kosalisa moto oyo bazali konyokola na ndako

 Ezali foti na yo te soki bazali konyokola yo na ndako

 Oyo Biblia elobi: “Mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na ye moko.”​—Baroma 14:12.

 Kobosana likambo oyo te: Moto oyo azali konyokola yo azali na ngambo mpo na makambo azali kosala.

 Soki molongani na yo azali konyokola yo mpe azali kopesa yo foti, azali kokosa mpo foti ezali nde ya ye. Esengeli kolinga basi, kasi konyokola bango te.​—Bakolose 3:19.

 Na bantango mosusu, moto oyo azali konyokola molongani na ye akoki kozala na maladi ya motó, mbala mosusu ndenge abɔkwamá na libota na bango, to amɛlaka masanga koleka ndelo. Ata bongo, azali na ngambo epai ya Nzambe mpo na makambo oyo azali kosala yo. Mpe asengeli kosala makasi abongola bizaleli na ye.

 Lisalisi ezali

 Oyo Biblia elobi: “Ntango bapesi-toli bazali ebele likambo elongaka.”​—Masese 15:22.

 Kobosana likambo oyo te: Soki omoni ete ozali na libateli te to oyebi te soki okosala nini, basusu bakoki kosalisa yo.

 Mpo na nini esengeli kosɛnga lisalisi epai ya basusu? Konyokola moto na ndako ezali likambo ya kozwa na lisɛki te. Ntango ozali kozwa ekateli ya koyeba ndenge ya kosilisa likambo yango, ekoki kozala mpasi mpo na yo mpamba te okoki komituna nini ezali na ntina mingi mpo na yo:

  •   Libateli na yo moko

  •   Bolamu ya bana na yo

  •   Mokakatano ya mbongo oyo ozali na yango

  •   Bolingo oyo olingaka molongani na yo

  •   Mposa ya kobatela boyokani na yo ná molongani na yo soki abongoli bizaleli na ye

 Mpo na koloba solo, okoki koyeba te osala nini mpe kobanga ete makambo ekóma ndongo. Okoki koluka lisalisi epai ya nani?

 Moninga moko ya motema to moto moko ya libota akoki kopesa yo toli oyo ebongi mpe akoki kosalisa yo. Kosolola na moto oyo akipaka yo ekoki kosalisa yo mingi.

 Nimero ya kobenga na ntango bazali konyokola moto na ndako ekoki kosalisa mpenza. Bato oyo bayambaka nimero ya kobenga na ntango bazali konyokola moto na ndako bakoki kosalisa yo oyeba nini okoki kosala mpo omibatela. Soki molongani na yo andimi mabe na ye mpe na motema moko alingi kobongwana, bato yango bakoyebisa ye makambo ya libosoliboso oyo asengeli kosala mpo abongwana.

 Ndenge mosusu ya lisalisi ya nokinoki ekoki kosalisa yo mbala moko soki ozali na likama. Lisalisi yango ekoki mpe kouta epai ya minganga, balufulume to bato mosusu oyo bazwá formasyo malamu na likambo ya kopesa lisungi.

 Ozali yo moko te

 Oyo Biblia elobi: “Yehova b azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.”​—Nzembo 34:18.

 Kobosana likambo oyo te: Nzambe alaki ete akosalisa yo.

 Yehova akipaka yo mpenza. (1 Petro 5:7) Ayebi malamu makanisi na yo ya kati mpenza mpe ndenge ozali komiyoka. Akoki kobɔndisa yo na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Lisusu, asɛngi yo obondelaka ye. Ntango ozali kobondela ye, okoki kosɛnga ye apesa yo bwanya mpe makasi oyo esengeli mpo olonga mokakatano na yo.​—Yisaya 41:10.

 Konyokola bato na ndako ekosila

 Oyo Biblia elobi: “Bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango.”​—Mika 4:4.

 Kobosana likambo oyo te: Biblia elaki ete na mikolo ezali koya, libota ekozala esika ya kimya mpo na moto nyonso.

 Kaka Yehova Nzambe nde akosilisa mikakatano na biso nyonso mpo na libela. Biblia elaki ete: “Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:4) Na ntango wana, makambo nyonso ya mabe ekolongwa mpe na esika na yango ekozala nde makambo ya malamu. (Yisaya 65:17) Yango ezali bomoi ya kimya oyo Biblia elaki kopesa yo na mikolo ezali koya.

a Lisolo oyo elobeli basi oyo bazali konyokola bango, kasi makambo mosusu oyo balobeli awa etaleli mpe mibali oyo bazali konyokola bango.

b Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.