Koboya kolya nyama to kosalela eloko nyonso oyo euti na nyama—Biblia elobi nini?
Bato mingi na mokili bakómi komona mabe koboma banyama kaka mpo na kolya to kosalela yango biloko mosusu.
“Véganisme ezali lolenge ya bomoi oyo moto aponi ya kosala nyonso oyo akoki mpo na koboya lolenge nyonso ya monyokoli oyo bato bamonisaka banyama kaka mpo na kozwa mosuni ya kolya, bilamba mpe bongo na bongo.”—The Vegan Society.
Bato mosusu bakómi na lolenge ya bomoi yango kaka te mpo na koyokela banyama mawa, kasi mpe mpo na kobatela mabele, mpo na makambo etali sante, to mpo na bindimeli ya mangomba na bango.
“Mpo na bato mingi, Véganisme elimboli kaka te koboya kolya nyama to kosalela biloko oyo esalemi na nyama, kasi yango ezali mpenza lokola bindimeli ya moto, lolenge moko ya bomoi oyo bato basengeli kolanda soki balingi ete mokili ebonga.”—Britannica Academic.
Koboya kolya nyama to kosalela eloko nyonso oyo euti na nyama yango nde ekosala ete mokili oyo ebonga? Biblia elobi nini?
Ndenge Mozalisi na biso atalelaka bato mpe banyama
Biblia elobi ete Mozalisi na biso, Yehova Nzambe, a atalelaka bato ete baleki banyama mpe apesi bato bokonzi likoló ya banyama. (Ebandeli 1:27, 28) Nzambe apesaki bato ndingisa ya kolya banyama. (Ebandeli 9:3) Nzokande, asepelaka te ntango bato bazali konyokola banyama.—Masese 12:10.
Na kotalela Biblia, kolya to koboya kolya nyama ezali likambo ya moto na moto. b Ekateli na biso na likambo yango ekómisaka biso te bato ya malamu koleka na miso ya Nzambe. (1 Bakorinti 8:8) Moto moko te asengeli koloba mabe mpo na ekateli oyo moto mosusu azwi ya kolya eloko moko boye.—Baroma 14:3.
Ndenge makambo ya mokili oyo ekobonga
Biblia emonisi ete bikateli oyo tozwaka, yango te nde ekosala ete makambo ya mokili oyo ebonga. Makambo ya politiki, bomoi ya bato, mpe makambo ya nkita nde ezali kobimisa mikakatano mingi na mokili oyo, mpe moto moko te akoki kobongisa yango. Biblia elobi:
“Oyo etɛngami ekoki kosembolama te.”—Mosakoli 1:15.
Mozalisi na biso akosilisa mikakatano oyo tozali kokutana na yango. Biblia esaleli maloba ya elilingi mpo na kolobela makambo oyo Nzambe akosala.
“Mpe namonaki likoló ya sika ná mabele ya sika; mpo likoló ya kala mpe mabele ya kala elekaki, mpe mbu ezali lisusu te.”—Emoniseli 21:1.
Nzambe akolongola baguvernɛma ya bato, to “likoló ya kala,” mpe akotya “likoló ya sika,” oyo ezali Bokonzi to guvernɛma na ye oyo ezali na likoló . Bonkonzi na ye ekolongola “mabele ya kala,” to bato mabe, mpe ekoyangela “mabele ya sika,” to baoyo batosaka bokonzi na ye na bolingo na bango nyonso.
Kaka na nse ya bokonzi ya Nzambe nde bato bakoyekola ndenge malamu ya kofanda na banyama mpe kobatela mabele.—Yisaya 11:6-9.
a Yehova ezali nkombo ya Nzambe.—Nzembo 83:18.
b Biblia esɛngi biso ‘tókoba koboya . . . makila.’ (Misala 15:28, 29) Yango elimboli ete tosengeli koboya komela makila to mpe kolya nyama oyo bakati nkingo te; to mpe kolya biloko oyo basangisi na makila.