Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Loyembo 148

Opesá Mwana na yo se moko oyo abotamaki

Opesá Mwana na yo se moko oyo abotamaki

Zwá:

(Yoane 15:13)

  1. Yehova, yo Tata,

    tozalaki mpamba.

    Opesi lisiko,

    tozwi elikya!

    Tomipesi na yo,

    tokosalela yo.

    Tokosakola mpe

    mokano na yo Yah.

    (MONDIMO)

    Opesá Mwana n’o.

    Toyembeli yo Yah,

    loyembo’yo ya seko,

    mpo opesá Mwana na yo.

  2. Boboto na yo nde

    ebendaka biso.

    Tolingi nkombo n’o,

    mpe boninga n’o.

    Tolingi mpe mingi

    likabo opesá.

    Otindaki Yesu

    akufela biso.

    (MONDIMO)

    Opesá Mwana n’o.

    Toyembeli yo Yah,

    loyembo’yo ya seko,

    mpo opesá Mwana na yo.

    (NA NSUKA)

    Yehova, yo Tata, toye’ epa’ na yo.

    Topesi matɔndi mpo opesá Mwana n’o.

(Talá mpe Yoa. 3:16; 1 Yoa. 4:9.)