Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 75

“Ngai oyo! Tindá ngai”

“Ngai oyo! Tindá ngai”

(Yisaya 6:8)

  1. 1. Lelo bato baz’otyola,

    Basakani na Yehova.

    Basusu: ye Nzambe mabe.

    Bazoba nde: “Azali te!”

    Nani’akokende kuna koo?

    Mpo na kokɔtela Nkolo?

    (MONDIMO 1)

    ‘Ngai oyo, Nkolo! Tindá nga’!

    Nakokumisa yo mpenza.

    Eza’ kutu nde lokumu, Yah.

    Ngai oyo! Tindá nga’!’

  2. 2. Baz’obanga Yehova te;

    Balobi’akoya noki te.

    Baz’osambela bikeko;

    To mpe bakonzi ya lelo.

    Nani’akokebisa bango?

    Bábika n’etumb’a Nkolo?

    (MONDIMO 2)

    ‘Ngai oyo, Nkolo! Tindá nga’!

    Na mpiko nakokebisa.

    Eza’ kutu nde lokumu, Yah.

    Ngai oyo! Tindá nga’!’

  3. 3. Bampate baza’ kolela

    Mpo mabe ez’otondana.

    Bazali mpenza koluka

    Solo mpo mitem’ekita.

    Nani’akokende kuna koo?

    Mpo bámona nzel’a sembo?

    (MONDIMO 3)

    ‘Ngai oyo, Nkolo! Tindá nga’!

    Nakoteya bango mpenza.

    Eza’ kutu nde lokumu, Yah.

    Ngai oyo! Tindá nga’!’

(Talá mpe Nz. 10:4; Ezk. 9:4.)