LOYEMBO 27

Komonana ya bana ya Nzambe

Komonana ya bana ya Nzambe

(Baroma 8:19)

  1. 1. Mosika te ban’a Nzambe

    Bakomonana mpe

    Bakoyangela ná Kristo

    Kuna na likoló.

    (MONDIMO)

    Komonan’a ban’a Nzambe

    Elongo na Kristo.

    Bakolonga na etumba,

    Mpe bakozwa mbano.

  2. 2. Etikali moke mpenza

    Nkolo akobenga

    Baoyo bazali na nse,

    Bákende likoló.

    (MONDIMO)

    Komonan’a ban’a Nzambe

    Elongo na Kristo.

    Bakolonga na etumba,

    Mpe bakozwa mbano.

    (MOLƆNGƆ MOSUSU)

    Ye ná bango bakobunda

    Etumba ya nsuka.

    Elongo na Mwana-Mpate,

    Libala ya seko.

    (MONDIMO)

    Komonan’a ban’a Nzambe

    Elongo na Kristo.

    Bakolonga na etumba,

    Mpe bakozwa mbano.