LOYEMBO 17

“Nalingi”

“Nalingi”

(Luka 5:13)

  1. 1. Nani azali boboto,

    Bolingo lokola Kristo?

    Mpo ayaki na nse,

    Kosunga biso;

    Alingaki mpenza bato.

    Abosani babola te,

    Abikisaki babɛli.

    Aboyaki te mokumba na ye,

    Alobaki nde: “Nalingi.”

  2. 2. Biso mpe tómekola ye,

    Na bizaleli na biso.

    Tózala boboto,

    Na moto nyonso;

    Tósunga báyeba Nzambe.

    Soki omoni moninga

    Akeleli, salisá ye.

    Soki etike to mama na ye

    Basɛngi, lobá: “Nalingi.”