LOYEMBO 146
Biloko nyonso ekómi biloko ya sika
-
1. Yesu akómi Mokonzi likoló,
Mpo “bilembo” emonisi yango.
Kuna abengani Satana mpe
Az’oya na nse kolongola ye.
(MONDIMO)
Tósepela mpo Yehova
Afandi na bato na ye.
Mitungisi mpe mpasi eza’ te;
Mawa, liwa, kolela elongwe.
Biloko nyonso ekómi sika.
Nzambe akosaka te!
-
2. Yerusaleme ya Sika ye oyo!
Mwasi kitoko ya Mwana-Mpate.
Angɛngisi nzoto mpo na Kristo,
Mwinda na ye, Yehova ye moko.
(MONDIMO)
Tósepela mpo Yehova
Afandi na bato na ye.
Mitungisi mpe mpasi eza’ te;
Mawa, liwa, kolela elongwe.
Biloko nyonso ekómi sika.
Nzambe akosaka te!
-
3. Esengo euti Yerusaleme,
Baporte n’ango ekangami te.
Pole na yango ekambi bato;
Tóngɛngisa pole yango lelo!
(MONDIMO)
Tósepela mpo Yehova
Afandi na bato na ye.
Mitungisi mpe mpasi eza’ te;
Mawa, liwa, kolela elongwe.
Biloko nyonso ekómi sika.
Nzambe akosaka te!
(Talá mpe Mat. 16:3; Em. 12:7-9; 21:23-25.)

