Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 118

“Bakiselá biso kondima”

“Bakiselá biso kondima”

(Luka 17:5)

  1. 1. Yah, tozali bato ya kokoka te,

    Motem’etindaka se na mabe.

    Lisumu oyo nd’ez’okanga biso​—

    Kozanga kondimela yo Nzambe.

    (MONDIMO)

    Yango Yehova, toz’obondela yo.

    Na mawa n’o, bakiselá biso

    Kondima mpo tókumisa yo seko

    Na misala mpe maloba, Nkolo.

  2. 2. Kozanga kondima ezali mabe.

    Nzamb’akosepela na biso te.

    Kondim’ezali nguba ya monene.

    Mpo na yango nde tobangaka te.

    (MONDIMO)

    Yango Yehova, toz’obondela yo.

    Na mawa n’o, bakiselá biso

    Kondima mpo tókumisa yo seko

    Na misala mpe maloba, Nkolo.