Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 108

Bolingo ya sembo ya Nzambe

Bolingo ya sembo ya Nzambe

(Yisaya 55:1-3)

  1. 1. Bolingo ya Nzambe!

    Eza’ bolingo ya sembo.

    Na nzela ya Mwana na ye,

    Asikoli nga’ ná yo mpe.

    Ye afungoli nzela mpo

    Tózwa bomoi ya seko.

    (MONDIMO)

    Yo mot’oza’ na mposa,

    Yak’ozwa mai, omɛla.

    Mai ya bomoi ofele;

    Na bolingo’a Nzambe.

  2. 2. Bolingo ya Nzambe!

    Emonani n’oy’akeli.

    Mpe na ndenge ye apesi

    Na Yesu Kristo bokonzi.

    Akokisi’elaka na ye.

    Nsukansuka, Bokonzi’eyei!

    (MONDIMO)

    Yo mot’oza’ na mposa,

    Yak’ozwa mai, omɛla.

    Mai ya bomoi ofele;

    Na bolingo’a Nzambe.

  3. 3. Bolingo ya Nzambe!

    Elimo n’etinda biso

    Tósalisaka bampate

    Báyeba mibeko na ye.

    Lokola totosaka ye,

    Toz’osala na molende.

    (MONDIMO)

    Yo mot’oza’ na mposa,

    Yak’ozwa mai, omɛla.

    Mai ya bomoi ofele;

    Na bolingo’a Nzambe.