MOKANDA YA LIKITA BOMOI MPE MOSALA Sanza ya Décembre 2017
Ndenge ya kokabola mikanda
Ndenge ya kobanda lisolo na Lamuká! mpe Teyá solo na likambo etali liwa. Landá ndakisa wana mpo na kobongisa maloba na yo moko ya kokabola mikanda mpe kobanda lisolo.
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
Bóluka Yehova liboso mokolo ya nkanda na ye eya
Mpo Yehova Nzambe abomba biso na mokolo ya nkanda na ye, tosengeli kotosa malako oyo Sefania apesaki Bayisraele.
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
‘Simbá mpenza eteni ya nse ya elamba ya Moyuda’
Bato ya bikólo nyonso bazali koya kosambela Yehova Nzambe elongo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Wapi mwa makambo ya kosala mpo na kopesa bakristo oyo batyami mafuta mabɔkɔ?
BOMOI YA BAKRISTO
Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kokutana na moto nyonso ya teritware na biso
Tolukaka kosakwela moto nyonso ya teritware na biso nsango malamu. Ndenge nini tokoki kosala yango?
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
Tikalá na kati ya “lobwaku ya bangomba”
‘Lobwaku ya bangomba’ ezali elilingi ya nini? Ndenge nini bato bakimaka na lobwaku yango mpe batikalaka kuna?
BOMOI YA BAKRISTO
Likambo ya sika na programɛ ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo
Salelá banɔti mpo na koyekola mpe bililingi ná bavideo oyo ezali na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ya boyekoli (nwtsty) oyo ezali na Internet mpo obongisa makita malamu lisusu mpe opusana mpenza pene ya Yehova.
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
Libala na yo esepelisaka Yehova?
Na mikolo ya Malaki, Yehova Nzambe aboyaki losambo ya baoyo bazalaki kosalela balongani na bango makambo na bokosi. Ndenge nini lelo balongani bakoki kotikala sembo?
BOMOI YA BAKRISTO
Bolingo ya solosolo ezali nini?
Yehova alingi ete libala eumela libela. Apesi mitinda oyo ekoki kosalisa mokristo apona molongani na bwanya mpe akoba kozala na esengo na libala.