BOMOI YA BAKRISTO
Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kozongela moto
MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Bato mingi oyo basepelaka na nsango ya Bokonzi balukaka koyeba solo etali Nzambe. (Yis 55:6) Mpo tókoba koteya bango, tosengeli kozongelaka bango mbala na mbala. Bato bakutanaka na mikakatano ndenge na ndenge, yango wana tosengeli kosalela mayele ekeseni mpo na kokolisa mposa na bango. Kasi, tokosala yango malamu soki tozali komibongisa malamu mpe toyebi oyo tokosala mbala nyonso oyo tozongeli moto mpo nsukansuka tóbanda na ye boyekoli ya Biblia.
NDENGE YA KOSALA YANGO:
-
Salá nyonso ozongela ye nokinoki, mbala mosusu nsima ya mwa mikolo.—Mt 13:19
-
Monisá boboto mpe limemya. Zalá motema mpiɔ
-
Bandá na kopesa ye mbote na esengo. Bengá ye na nkombo na ye. Yebisá ye ntina oyo ozongeli ye—mbala mosusu mpo na koyanola na motuna moko, kotikela ye zulunalo ya sika, kolakisa ye site Internet na biso, video moko, to kolakisa ye ndenge boyekoli ya Biblia esalemaka. Bongolá lisolo na yo soki asepeli na lisolo mosusu.—Flp 2:4
-
Tángelá ye vɛrsɛ moko ya Biblia to tikelá ye mokanda moko mpo na komwangisa mai na mboto ya solo oyo olonaki na motema na ye. (1Ko 3:6) Luká kosala boninga na ye
-
Lobá likambo moko oyo ekopesa yo nzela ozongela ye lisusu.