Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NAHUMU 1–HABAKUKU 3

Kobá kozala ekɛngɛ na elimo mpe makasi na mosala ya Yehova

Kobá kozala ekɛngɛ na elimo mpe makasi na mosala ya Yehova

Hab 1:5, 6

Emonanaki lokola bato ya Babilone bakobebisa Yuda te. Yuda ezalaki na nse ya bokonzi ya Ezipito, ekólo oyo elekaki na nguya. Bakaladea balekaki nde Baezipito na nguya? Longola yango, Bayuda mingi bakokaki kondima te ete Yehova akotika Yerusaleme ná tempelo na yango ebebisama. Ata bongo, esakweli yango esengelaki kokokisama mpe esɛngaki ete Habakuku akoba kozala ekɛngɛ na elimo mpe makasi na mosala ya Yehova mpo azela yango kaka.

Nini endimisi ngai ete nsuka ya makambo ya ntango oyo ekómi mpenza pene?

Ndenge nini nakoki kokoba kozala ekɛngɛ na elimo mpe makasi na mosala ya Yehova?