Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Kobá kozala ekɛngɛ na elimo mpe makasi na mosala ya Yehova ntango makambo ebongwani

Kobá kozala ekɛngɛ na elimo mpe makasi na mosala ya Yehova ntango makambo ebongwani

Ezali mpasi kokima mbongwana, mingimingi na mikolo oyo ya nsuka. (1Ko 7:31) Ezala toyebaki ete ekokómela biso to te, ezala mbongwana ya malamu to ya mabe, yango ekoki kotya mobulu na losambo na biso mpe kobebisa boyokani na biso na Yehova. Nini ekoki kosalisa biso tókoba kozala ekɛngɛ na elimo mpe makasi na mosala ya Nzambe ntango makambo ebongwani? Talá video Kotikala makasi na elimo ntango okei kofanda esika mosusu mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Toli nini ndeko mobali moko apesaki papa ya libota yango?

  • Ndenge nini etinda oyo ezali na Matai 7:25 eyokani na likambo ya libota yango?

  • Ndenge nini libota yango emibongisaki liboso bákende kofanda esika mosusu mpe ndenge nini yango esalisaki bango?

  • Nini esalisaki libota yango emesana na mbongwana yango ezala na lisangá to na teritware?

Bambongwana nini ya minene euti kokómela ngai mikolo oyo?

Ndenge nini nakoki kosalela mitinda oyo namoni na video oyo na likambo na ngai?