27/11–3/12
NAHUMU 1–HABAKUKU 3
Loyembo 154 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Eleka min. 3 te)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Kobá kozala ekɛngɛ na elimo mpe makasi na mosala ya Yehova”: (Min. 10)
[Lakisá video Maloba ya ebandeli na Nahumu.]
[Lakisá video Maloba ya ebandeli na Habakuku.]
Hab 2:1-4—Soki tolingi kobika na mokolo ya kosambisama ya Yehova oyo ezali koya, tosengeli ‘kozela yango kaka’ (w07 15/11 lok. 10 par. 3-5)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)
Nah 1:8; 2:6—Ndenge nini Ninive esilisamaki nyɛɛ? (w07 15/11 lok. 9 par. 2)
Hab 3:17-19—Ata soki tokutani na makambo ya mpasi liboso to na ntango ya Armagedone, tosengeli kotya motema na nini? (w07 15/ 11 lok. 10 par. 10)
Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi yo nini mpo na Yehova?
Biloko nini mosusu ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Hab 2:15–3:6
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 2 te) hf—Lobá likambo oyo ekopesa yo nzela ozongela ye.
Kozongela moto: (Eleka min. 4 te) hf—Opesaki moto mwa buku oyo na bokutani ya liboso. Salá sikoyo na ndenge oyo ekomonisa ete ozongeli ye.
Diskur: (Eleka min. 6 te) w16.03 nk. 3-5—Motó ya likambo: Okoki kopesa mabɔkɔ na lisangá na bino?
BOMOI YA BAKRISTO
Loyembo 40
“Kobá kozala ekɛngɛ na elimo mpe makasi na mosala ya Yehova ntango makambo ebongwani”: (Min. 15) Lisolo na bayangani. Lakisá video Kotikala makasi na elimo ntango okei kofanda esika mosusu.
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) kr mok. 22 par. 1-7
Bozongeli mpe makambo tokotalela pɔsɔ elandi (Min. 3) Yebisá bayangani ete na sanza ya 12 tokokabola zulunalo Lamuká! oyo lisolo ya titre ya ezipeli na yango elobi “Mokili oyo ekobonga lisusu?” Video oyo tokotala na makita ya pɔsɔ oyo ekolanda ekotyama na JW Library kobanda mokolo ya 30/11. Basakoli basengeli kosala nyonso mpo na kokabola zulunalo yango mingi mpenza.
Loyembo 129 mpe libondeli