BOMOI YA BAKRISTO
Mateya oyo tokoki kozwa na mokanda ya Yona
Yehova abombá masolo ya basi mpe mibali ya kondima na kati ya Liloba na ye mpo na koteya biso mateya ya ntina mpenza. (Ro 15:4) Mokanda ya Yona eteyi yo nini? Talá video Losambo na kati ya libota: Yona—Tózwa liteya na motema mawa ya Yehova, mpe yanolá na mituna oyo:
-
Mikakatano nini basakoli misato na video oyo bakutanaki na yango?
-
Ndenge nini mokanda ya Yona ekoki kolendisa biso soki bapesi biso disiplini to tobungisi mikumba na lisangá? (1Sa 16:7; Yon 3:1, 2)
-
Ndenge nini lisolo ya Yona esalisaka biso tótalelaka teritware na biso na ndenge ya malamu? (Yon 4:11; Mt 5:7)
-
Ndenge nini likambo oyo ekómelaki Yona ekoki kobɔndisa biso ntango tozali na maladi oyo esilaka te? (Yon 2:1, 2, 7, 9)
-
Video oyo eteyi yo nini mpo na litomba ya kotánga Biblia mpe komanyola yango?