Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kokabola mikanda

Ndenge ya kokabola mikanda

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI

Motuna: Nani aleki bato nyonso na kokaba na molɔ́ngɔ́ mobimba?

Vɛrsɛ: Yk 1:17

Okoki koloba: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali kosalisa biso tósepela na likabo ya Nzambe oyo eleki makabo nyonso.

KOBANDA LISOLO: TEYÁ SOLO

Motuna: Nkombo ya Nzambe nani?

Vɛrsɛ: Nz 83:18

Solo: Nkombo ya Nzambe ezali Yehova.

OKOKI KOZALA NA LIBOTA YA ESENGO

Maloba ya ebandeli: Tozali kolakisa bato video oyo ya mokuse elobeli libota. [Lakisá ye video mpo na mwa buku Okoki kozala na libota ya esengo.]

Okoki koloba: Soki okosepela kotánga mwa buku oyo video yango elobeli, nakoki kopesa yo to nakoki kolakisa yo ndenge ya kozwa yango na Internet.

KOMÁ MALOBA NA YO MOKO

Landá makanisi oyo bapesi likoló mpo na kobongisa ndenge na yo moko ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola.