Bazali kopesa moto mwa buku Libota ya esengo na ekólo Géorgie

MOKANDA YA LIKITA BOMOI MPE MOSALA Sanza ya Novembre 2017

Ndenge ya kokabola mikanda

Ndenge ya kobanda lisolo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Teyá solo na likambo etali nkombo ya Nzambe. Landá ndakisa wana mpo na kobongisa maloba na yo moko ya kokabola mikanda mpe kobanda lisolo.

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

“Bóluka Yehova, mpe bótikala na bomoi”

Koluka Nzambe elimboli nini? Liteya nini tokoki kozwa epai ya Bayisraele oyo batikaki koluka Yehova?

BOMOI YA BAKRISTO

Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kozongela moto

Ndenge nini okoki kozongela moto na ndenge ebongi? Kobá kokolisa mposa ya moto yango, tyá mokano oyo okokokisa mbala nyonso okozongela ye, mpe kobosana te mokano na yo ya libosoliboso.

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Zwá mateya na mabunga na yo

Lisolo ya Yona emonisi ete Yehova asundolaka biso te ntango tosali mabunga. Kasi azelaka ete tózwa mateya na mabunga na biso mpe tósala mbongwana oyo esengeli.

BOMOI YA BAKRISTO

Mateya oyo tokoki kozwa na mokanda ya Yona

Komanyola makambo oyo ekómelaki Yona ekoki kosalisa biso ntango tolɛmbi nzoto, tóbongisa ndenge na biso ya kotalela mosala ya kosakola, mpe tóbɔndisama na libondeli.

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Yehova asɛngaka biso nini?

Boyokani nini ezali kati ya losambo na biso mpe ndenge na biso ya kosalela bandeko na biso ya elimo makambo?

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

Kobá kozala ekɛngɛ na elimo mpe makasi na mosala ya Yehova

Emonanaki lokola bato ya Babilone bakobebisa Yuda te. Ata bongo, esakweli yango esengelaki kokokisama mpe esɛngaki ete Habakuku akoba kozala ekɛngɛ na elimo mpe makasi na mosala ya Yehova mpo azela yango kaka.

BOMOI YA BAKRISTO

Kobá kozala ekɛngɛ na elimo mpe makasi na mosala ya Yehova ntango makambo ebongwani

Soki mbongwana elingi kobebisa losambo mpe boyokani na biso na Yehova Nzambe, nini ekosalisa biso tókoba kozala ekɛngɛ na elimo mpe makasi na mosala ya Nzambe?