4-10/09
EZEKIELE 42-45
Loyembo 26 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Eleka min. 3 te)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Losambo ya pɛto ezongisami!”: (Min. 10)
Ezk 43:10-12—Tempelo oyo Ezekiele amonaki na emonaneli ezalaki mpo na kosalisa Bayuda oyo bakendaki na boombo bábongola mitema mpe bándima mpenza ete losambo ya pɛto ekozongisama mpe ekotombwana likoló mpenza (w99 1/3 9 par. 3; it-2-F 1052 par. 8)
Ezk 44:23—Banganga-nzambe basengelaki kolakisa bato “bokeseni kati na eloko oyo ezali mosantu ná eloko oyo ezali mosantu te”
Ezk 45:16—Bato basengelaki kopesa mabɔkɔ na baoyo Yehova aponaki mpo na kotambwisa bango (w99 1/3 10 par. 10)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)
Ezk 43:8, 9—Ndenge nini Bayisraele bakómisaki nkombo ya Nzambe mbindo? (it-2-F 412 par. 8)
Ezk 45:9, 10—Yehova asɛngaka ntango nyonso nini epai ya baoyo balingi ete andima bango? (it-2-F 87 par. 2)
Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi yo nini mpo na Yehova?
Biloko nini mosusu ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Ezk 44:1-9
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Yekolá ndenge ya kokabola mikanda mpe kobanda lisolo na sanza oyo: (Min. 15) Lisolo na bayangani: “Ndenge ya kokabola mikanda.” Lakisá video mokomoko oyo emonisi ndenge ya kokabola mikanda, mpe bólobela makanisi ya ntina.
BOMOI YA BAKRISTO
“Mpo na nini ozwaka losambo ya pɛto na motuya?”: (Min. 15) Lisolo na bayangani.
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) kr mok. 17 par. 10-18
Bozongeli mpe makambo tokotalela pɔsɔ elandi (Min. 3)
Loyembo 115 mpe libondeli