Mapamboli Bayisraele oyo babimaki na boombo balingaki kozwa
Tempelo oyo Ezekiele amonaki na emonaneli elendisaki Bayisraele oyo bakendaki na boombo mpe endimisaki bisakweli oyo elobamaki liboso; oyo elakaki ete bakozonga lisusu na mboka na bango. Losambo ya pɛto esengelaki kozwa esika moko ya lokumu mpo na baoyo Yehova apambolaki.
Emonaneli yango epesaki elaka etali ndenge makambo ekobongisama, boyokani mpe libateli
-
Mokili oyo ebotaka mbuma mingi
-
Libula mpo na libota mokomoko
Liboso bákabolela bato mabele, eteni moko ya mabele elingaki kotyama pembeni lokola “likabo” mpo na Yehova
Ndenge nini nakoki komonisa ete losambo ya Yehova ezwaka esika ya liboso na bomoi na ngai? (w06 15/4 27-28 par. 13-14)