Ndenge ya kokabola mikanda
LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI
Motuna: Baanzelu bazalaka mpenza?
Vɛrsɛ: Nz 103:20
Okoki koloba: Nimero oyo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisi oyo Biblia elobi mpo na baanzelu mpe ndenge oyo bakoki kosalisa biso to kosala biso mabe.
KOBANDA LISOLO: TEYÁ SOLO
Motuna: Okanisi ete siansi eboyaka makanisi ya Biblia?
Vɛrsɛ: Yis 40:22
Solo: Oyo Biblia elobi na makambo etali siansi ezali solo.
LOKASA YA LIBYANGI MPO NA MAKITA (inv)
Okoki koloba: Nasepeli kobengisa yo oya kolanda diskur moko ya Biblia. Ekosalema na Ndako ya Bokonzi, esika na biso ya losambo. [Pesá ye lokasa ya libyangi mpo na makita, lakisá ye ngonga mpe esika oyo ekosalema mpe lobelá motó ya likambo ya diskur yango.]
Motuna: Osí okendá na Ndako ya Bokonzi? [Soki likoki ezali, lakisá ye video Makambo esalemaka ndenge nini na Ndako ya Bokonzi?]
KOMÁ MALOBA NA YO MOKO
Landá makanisi oyo bapesi likoló mpo na kobongisa ndenge na yo moko ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola.