MOKANDA YA LIKITA BOMOI MPE MOSALA Sanza ya Septembre 2017
Ndenge ya kokabola mikanda
Ndenge ya kobanda lisolo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe teyá solo na likambo etali Biblia mpe siansi. Landá ndakisa wana mpo na kobongisa maloba na yo moko ya kokabola mikanda mpe kobanda lisolo.
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
Losambo ya pɛto ezongisami!
Tempelo oyo Ezekiele amonaki na emonaneli endimisaki Bayuda ya sembo oyo bakendaki na boombo ete losambo ya pɛto ekozongisama.
BOMOI YA BAKRISTO
Mpo na nini ozwaka losambo ya pɛto na motuya?
Losambo ya pɛto epikami makasi. Okanisaka mbala na mbala na libaku oyo ozwi ya koyeba Yehova mpe kosalela ye?
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
Mapamboli Bayisraele oyo babimaki na boombo balingaki kozwa
Tempelo oyo Ezekiele amonaki na emonaneli emonisaki ete losambo ya pɛto ekozongisama, mpe mapamboli na yango ekotalela ndenge makambo ekobongisama, boyokani mpe libateli.
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
Yehova apambolaka bato ya sembo
Lisolo ya Baebre misato ekoki kokómisa makasi ekateli na biso ya kozala sembo epai ya Yehova Nzambe.
BOMOI YA BAKRISTO
Tikalá sembo ntango omekami
Yesu Kristo atikalaki sembo epai ya Nzambe ntango amekamaki. Moto ya kozanga kokoka akoki mpe kotikala sembo ntango batye ye mpanzi-likoló azanga bosembo epai ya Nzambe?
BOMOI YA BAKRISTO
Tikalá sembo ntango ndeko na yo alongolami na lisangá
Ntango ndeko na yo alongolami na lisangá bosembo na biso epai ya Yehova emekamaka. Nini ekoki kosalisa biso tótikala sembo?
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
Ozali kosalela Yehova ntango nyonso?
Danyele asalelaki Nzambe ntango nyonso. Apesaki nzela ata na eloko moko te epekisa momeseno malamu ya elimo oyo azalaki na yango.
BOMOI YA BAKRISTO
Pesá bango formasyo básalela Yehova ntango nyonso
Ntango kaka moyekoli na yo andimami lokola mosakoli oyo azwi naino batisimo te, bandá kopesa ye formasyo azala na molende na mosala ya kosakola. Salisá moyekoli na yo akóma mosakoli oyo ameseni na mosala ya kosakola.