BOMOI YA BAKRISTO
Tómonisa bizaleli ya Nzambe—Komikitisa
MPO NA NINI EZALI NA NTINA:
-
Komikitisa esalaka ete moto azala na boyokani malamu na Yehova.—Nz 138:6
-
Komikitisa esalaka ete moto azala na boyokani malamu na basusu.—Flp 2:3, 4
-
Lolendo ememaka na likama.—Mas 16:18; Ezk 28:17
NDENGE YA KOMONISA YANGO:
-
Kokakatana te kosalisa basusu na misala mosusu.—Mt 20:25-27
-
Kotika te ete makoki to mikumba oyo ozali na yango ekómisa yo lolendo.—Ro 12:3
Nasengeli kosala lisusu nini mpo na komonisa komikitisa mingi?
TALÁ VIDEO BOYÁ MAKAMBO OYO EBEBISAKA BOSEMBO YA MOTO—LOLENDO, MPE PESÁ BIYANO NA MITUNA OYO:
-
Ndenge oyo tosalaka ntango bapesi biso toli emonisaka nini?
-
Ndenge nini libondeli esalisaka biso tókóma na ezaleli ya komikitisa?
-
Makambo nini tokoki kosala mpo na komonisa komikitisa?