BOMOI YA BAKRISTO
Tómonisa bizaleli ya Nzambe—Kondima
MPO NA NINI EZALI NA NTINA:
-
Esengeli kozala na kondima mpo na kosepelisa Nzambe.—Ebr 11:6
-
Kondimela bilaka ya Nzambe esalisaka biso tóyikela mikakatano mpiko.—1Pe 1:6, 7
-
Kozanga kondima ekoki kotinda moto asala lisumu.—Ebr 3:12, 13
NDENGE YA KOMONISA YANGO:
-
Tángáká Liloba ya Nzambe mpe kanisá na mozindo na makambo yango.—Ro 10:17; 1Ti 4:15
-
Yanganáká ntango nyonso elongo na bato ya kondima.—Ro 1:11, 12
Ndenge nini nakoki kokómisa kondima na ngai mpe ya libota na ngai makasi?
TALÁ VIDEO LANDÁ MAKAMBO OYO EMONISAKA BOSEMBO—KONDIMA, MPE PESÁ BIYANO NA MITUNA OYO: