BOMOI YA BAKRISTO
Tómonisa bizaleli ya Nzambe—Mpiko
MPO NA NINI EZALI NA NTINA:
-
Esɛngaka kozala na mpiko mpo na kosakola.—Mis 5:27-29, 41, 42
-
Mpiko na biso ekomekama na bolɔzi monene.—Mt 24:15-21
-
Kobanga bato ememaka na likama.—Yir 38:17-20; 39:4-7
NDENGE YA KOMONISA YANGO:
-
Kanisá na mozindo na makamwisi oyo Yehova asalaki mpo na kobikisa bato.—Kob 14:13
-
Tyelá Yehova motema.—Nz 118:6
Kobanga ya ndenge nini nasengeli kolongola na mosala ya kosakola?
TALÁ VIDEO BOYÁ MAKAMBO OYO EBEBISAKA BOSEMBO YA MOTO—KOBANGA BATO, MPE PESÁ BIYANO NA MITUNA OYO:
-
Mpo na nini kozala na mpiko ezali na ntina na mosala na biso ya kosakola?
-
Bizaleli nini ekeseni oyo Masese 29:25 elobeli?
-
Mpo na nini tosengeli komonisa mpiko mpo na kosala mokano ya Nzambe lelo oyo?