Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YIRIMIA 51-52

Ata liloba moko te ya Yehova ezangaka kokokisama

Ata liloba moko te ya Yehova ezangaka kokokisama

Yehova asakolaki na bosikisiki makambo oyo ekosalema

Moto oyo abwakaka likula, oyo azalaki kokɛngɛla mokonzi ya Perse

“Bópelisa makula”

51:11, 28

  • Bamede ná Baperse bayebaki mpenza kobwaka makula mpe bazalaki kosalela yango lokola ebundeli na bango ya libosoliboso. Bazalaki kopelisa yango mpo ekɔta mpenza

“Bato ya nguya ya Babilone batiki kobunda”

51:30

  • Libanga ya Nabonide emonisi ete: “Basoda ya Siruse bakɔtaki na Babilone kozanga kobunda.” Yango elingi koloba kozanga mokakatano mpe yango eyokani na esakweli ya Yirimia

Libanga ya Nabonide

‘Babilone ekokóma mpenza mabondo ya mabanga mpe ekotikala mpamba mpo na ntango oyo etyami ndelo te’

51:37, 62

  • Kobanda mobu 539 L.T.B., lokumu ya Babilone ekómaki kosila. Alezandre Monene akanaki kokómisa Babilone mboka-mokonzi ya boyangeli na ye, kasi akufaki na mbalakaka. Na ebandeli ya eleko ya bokristo, Bayuda mosusu bazalaki naino kofanda na Babilone, yango wana ntoma Petro azwaki libaku ya kosala mobembo na Babilone. Kasi kobanda na siɛklɛ ya minei T.B., engumba yango ebebaki mpe nsukansuka elimwaki

Kokokisama ya bisakweli ya Biblia esengeli kotinda ngai nasala nini?

 

Nakoki koteya basusu nini mpo na bisakweli yango?