BOMOI YA BAKRISTO
Sepeláká na mosala ya kosakola nsango malamu
Ekómelá yo naino te omona ete ezali mpasi kosakola? Esí ekómelá biso nyonso. Mpo na nini? Mbala mosusu mpo bato baboyaka nsango na biso to balingaka biso te to tobangaka kosolola na bato oyo toyebi te. Na ntembe te, makambo yango ekoki kosilisa biso esengo. Atako bongo, tosambelaka Nzambe ya esengo oyo alingaka ete tósalela ye na esengo. (Nz 100:2; 1Ti 1:11) Wapi bantina misato ya kosepela na mosala ya kosakola?
Ya liboso, tosakolaka nsango ya elikya. Atako lelo oyo elikya ya bato ekómi kosila, tokoki kotondisa mitema na bango na elikya na “nsango malamu ya eloko moko ya malamu koleka.” (Yis 52:7) Kasi nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ekoki mpe kopesa biso esengo mingi. Liboso ya kobima na mosala ya kosakola, kanisáká na mapamboli oyo Bokonzi ya Nzambe ekomemela bato.
Ya mibale, nsango malamu oyo tosakolaka esalisaka bato ezala na nzoto to na elimo. Esalisaka bango bátika bizaleli oyo ekoki kobebisa nzoto na bango mpe bázwa elikya ya bomoi ya seko. (Yis 48:17, 18; Ro 1:16) Tokoki kotalela mosala na biso lokola mosala ya koluka mpe kobikisa bato. Atako bato mosusu balingaka te tóbikisa bango, tokobaka koluka baoyo bazali na mposa na yango.
Ya misato, oyo eleki ntina ezali ete mosala na biso ya kosakola ekumisaka Yehova. Azwaka mpenza na motuya mosala na biso ya kosakola. (Yis 43:10; Ebr 6:10) Lisusu, apesaka biso elimo santu na ye mpo tókokisa mosala yango. Na yango, bondeláká Yehova apesa yo esengo, moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo santu. (Ga 5:22) Na lisalisi na yango, tokoki kolonga mitungisi mpe kosakola na mpiko. (Mis 4:31) Boye, ata soki bato ya teritware na biso baboyi to bandimi koyoka, tokozala na esengo ya kosala mosala na biso ya kosakola.
Ezaleli nini okosepela komonisa na mosala ya kosakola? Ndenge nini okoki komonisa esengo?
LAKISÁ VIDEO KOYEKOLA NÁ KOMANYOLA ESALISI NGAI NAZONGELA ESENGO, MPE NA NSIMA BÓYANOLA NA MITUNA OYO:
-
Mpo na nini boyekoli na biso moko esengeli kozala na esika ya liboso ata soki tolekisaka ntango mingi na kosakola sanza na sanza?
-
Na makambo nini tosengeli komekola Maria?
-
Ntango nini otyá mpo na komanyola Liloba ya Nzambe?
-
Nini esepelisaka yo ntango osakolaka nsango malamu?