Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EZEKIELE 1-5

Ezekiele azalaki kosepela kosakola nsango ya Nzambe

Ezekiele azalaki kosepela kosakola nsango ya Nzambe

Na emonaneli moko, Yehova apesaki Ezekiele rulo moko mpe ayebisaki ye alya yango. Emonaneli yango elimbolaki nini?

2:9–3:2

  • Ezekiele asengelaki kofandisa nsango ya Nzambe na motema na ye. Komanyola makambo oyo ezalaki na rulo yango elingaki kosimba motema ya Ezekiele mpe kotinda ye aloba

3:3

  • Rulo yango ezalaki elɛngi mpo Ezekiele asepelaki na mokumba oyo bapesaki ye

Ndenge nini kobondela, koyekola Biblia mpe komanyola ekoki kosalisa ngai?

 

Ndenge nini nakoki kokoba kozala na makanisi malamu mpo na mosala ya kosakola?