Ezaleli ya koyeba kozela esalisaka biso tóyika mpiko
Nini esalisaki Yirimia ayika mpiko na makanisi malamu atako anyokwamaki makasi mpenza?
-
Azalaki na kondima mpenza ete Yehova ‘akogumbama’ epai ya bato na ye oyo babongoli motema mpe akolongola bango na mpasi
-
Ayekolaki ‘komema ekanganeli ntango azalaki naino elenge.’ Soki moto azali kolonga komekama ntango azali naino elenge, yango ekosalisa ye alonga mikakatano oyo akokutana na yango ntango akokóma mokóló