Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | EBANDELI 36-37

Bayokeli Yozefe zuwa

Bayokeli Yozefe zuwa

37:3-9, 11, 23, 24, 28

Makambo oyo Yozefe akutanaki na yango na bomoi emonisi ete zuwa ya mabe ebimisaka mbuma mabe. Yokanisá bavɛrsɛ oyo mpo na koyeba ntina oyo tosengeli kolongola makanisi nyonso oyo eutaka na zuwa ya mabe.

NTINA

  • Bato ya zuwa ya mabe bakozwa libula ya Bokonzi ya Nzambe te

  • Zuwa ya mabe elongolaka kimya mpe bomoko na kati ya lisangá

  • Zuwa ya mabe ebebisaka sante na biso

  • Zuwa ya mabe esalaka ete tómona te bizaleli malamu ya basusu

Makambo nini ekoki kosala ete tókóma na zuwa ya mabe?