Tiká “koluka makambo minene”
Emonani ete Baruke azalaki moto atángá kelasi mpe azalaki kosala na ndako ya mokonzi. Atako azalaki kosambela Yehova mpe asalisaki Yirimia na bosembo, na eleko moko akómaki na makanisi ya mabe. Abandaki “koluka makambo minene”; mbala mosusu alukaki esika ya lokumu koleka na ndako ya mokonzi to biloko ya mosuni. Asengelaki kobongola makanisi na ye mpo abika na libebi ya Yerusaleme oyo ezalaki koya.