Yehova akozongisela moto na moto na kolanda misala na ye
Zidikiya atosaki Yehova te na ndenge aboyaki komitika na mabɔkɔ ya Babilone
-
Babomaki bana ya Zidikiya na miso na ye. Na nsima, babomaki ye moko miso, bakangaki ye na bikangeli ya motako, mpe batyaki ye na bolɔkɔ na Babilone tii akufaki
Ebede-meleke atyelaki Yehova motema mpe alukaki bolamu ya Yirimia, mosakoli ya Nzambe
-
Yehova alakaki ete akobatela Ebede-meleke ntango Yuda ekobebisama
Yirimia asakolaki na mpiko mbula mingi liboso Yerusaleme ebebisama
-
Yehova abatelaki Yirimia ntango banguna bazingaki Yerusaleme mpe asalaki ete bato ya Babilone básikola ye