Ndenge ya kokabola mikanda
LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI
Maloba ya ebandeli: Bato mingi bayebi ete mokanda ya Emoniseli elobeli batambwisi-mpunda minei. Bato mosusu babangaka yango. Bamosusu basepelaka na yango.
Vɛrsɛ: Em 1:3
Okoki koloba: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo emonisi ndenge kopota mbangu ya batambwisi-mpunda yango ekoki kozala nsango malamu mpo na biso.
KOBANDA LISOLO: TEYÁ SOLO
Motuna: Mpo na yo, tokoki koyeba makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya?
Vɛrsɛ: Yis 46:10
Solo: Nzambe amonisi biso makambo oyo ekosalema na kati ya Liloba na ye, Biblia.
OKOKI KOZALA NA LIBOTA YA ESENGO
Maloba ya ebandeli: Tozali kolakisa bato mwa video moko oyo elobeli libota. [Lakisá video ya mwa buku Okoki kozala na libota ya esengo.]
Okoki koloba: Soki olingi kotánga mwa buku oyo video yango elobeli, nakoki kopesa yo yango to nakoki kolakisa yo ndenge ya kozwa yango na Internet.
KOMÁ MALOBA NA YO MOKO
Landá makanisi oyo bapesi likoló mpo na kobongisa ndenge na yo moko ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola.