Zekaria 9:1-17
9 Liyebisi:
“Liloba ya Yehova etɛmɛli mokili ya Hadrake,Mpe etali mpenzampenza* Damasi.+Mpo, miso ya Yehova etalaka bato nyonso+Etalaka mpe mabota nyonso ya Yisraele.
2 Etɛmɛli Hamate,+ oyo ezali pembeni na ye,Mpe etɛmɛli Tire+ ná Sidone,+ mpo ezali kokanisa ete ezali na bwanya mingi.+
3 Tire emitongeli mwa ngomba ya mabele* mpo na komibatela.
Eyanganisaki palata lokola putuluMpe wolo lokola pɔtɔpɔtɔ ya babalabala.+
4 Bóyoka! Yehova akobɔtɔla biloko na yango.Akobebisa limpinga na yango mpe akobwaka yango na mbu;*+Mpe engumba yango ekozikisama na mɔtɔ.+
5 Ashekelone ekomona yango mpe ekobanga;Gaza ekoyoka mpasi makasi mpenza,Ndenge moko mpe Ekrone, mpo eloko oyo yango etyelaki elikya ekoyoka nsɔni.
Mokonzi moko akokufa na Gaza,Mpe Ashekelone ekozala lisusu na bato te.+
6 Mwana mobali moko ya makango akofanda na Ashedode,Mpe nakosukisa lolendo ya Mofilistia.+
7 Nakolongola na monɔkɔ ya Mofilistia biloko oyo ebebisami na makilaMpe nakolongola na mino na ye biloko na ye ya bosɔtɔ,Mpe akotikala mpo na Nzambe na biso.Akokóma lokola nkumu* moko na Yuda,+Mpe Ekrone lokola Moyebusi.+
8 Nakomitya lokola mokɛngɛli* mpo na ndako na ngai,+Mpo moto moko te akɔta kuna mpe moto moko te abima.Kapita moko te ya mosala* akoleka lisusu kuna,+Mpo sikoyo namoni yango* na miso na ngai.
9 Sepelá mingi, Ee mwana mwasi ya Siona.
Gangá mpo na bolongi, Ee mwana mwasi ya Yerusaleme.
Talá! Mokonzi na yo azali koya epai na yo.+
Azali sembo mpe amemi lobiko.*Azali na komikitisa+ mpe azali kotambola na mpunda moke,Mwana ya mpunda, mwana ya mpunda ya mwasi.+
10 Nakolongola makalo ya etumba na EfraimeMpe bampunda na Yerusaleme.
Litimbo ya etumba ekolongolama.
Mpe akosakola kimya epai ya bikólo.+Boyangeli na ye ekozala banda na mbu tii na mbuMpe banda na Ebale* tii na bansuka ya mabele.+
11 Mpe mpo na yo, Ee mwasi, na nzela ya makila ya kondimana na yo,Nakobimisa bato na yo ya bolɔkɔ na libulu oyo ezangá mai.+
12 Bózonga na esika makasi ya libateli, bino bato ya bolɔkɔ oyo bozali na elikya.+
Nazali koyebisa yo lelo ete:‘Ee mwasi, nakozongisela yo likabo mbala mibale.+
13 Mpo nakogumba* Yuda lokola litimbo na ngai.
Nakotya Efraime na kati ya litimbo,*Nakolamwisa bana na yo ya mibali, Ee Siona,Mpo bátɛmɛla bana na yo ya mibali, Ee Grɛsi,Mpe nakokómisa yo lokola mopanga ya elombe ya etumba.’
14 Mpe bakomona Yehova likoló na bango,Mpe likula na ye ekobima lokola mokalikali.
Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso akoyula liseke,+Mpe akoya na kati ya mbula ya mopɛpɛ makasi ya sudi.
15 Yehova ya mampinga akobatela bango,Bongo bakolya mpe bakokonza mabanga ya lansi.+
Bakomɛla mpe bakozala na yikiyiki lokola nde balangwe vinyo.Bakotonda lokola kibakuli,Lokola bansuka* ya etumbelo.+
16 Na mokolo yango, Yehova Nzambe na bango akobikisa bango,Mpo bazali etonga na ye, bato na ye.+Mpo bakongɛnga na mabele na ye lokola mabanga ya ntalo ya motole.+
17 Mpo bolamu na ye ezali monene mpenza,+Mpe kitoko na ye ezali mingi mpenza!
Bilei ekopesa bilenge mibali makasi,Mpe vinyo ya sika ekopesa bangɔndɔ makasi.”+
Maloba na nse
^ Lil., “epemaka na.”
^ To, “esika makasi.”
^ To mbala mosusu, “akolonga limpinga na yango na mbu.”
^ To, “sheiki.” Sheiki azalaki mokonzi ya libota.
^ Ekoki mpenza kozala, mpasi ya bato na ye.
^ To, “monyɔkɔli.”
^ To, “basoda oyo bakɛngɛlaka.”
^ To, “mpe alongi; mpe abikisami.”
^ Elingi koloba, Efrate.
^ Lil., “nakonyata.”
^ Elingi koloba, lokola likula.
^ To, “matumu.”

