Zekaria 7:1-14
7 Mpe na mbula ya minei ya Mokonzi Dariuse, Yehova alobaki na Zekaria.+ Ezalaki na mokolo ya minei ya sanza ya libwa, elingi koloba, sanza ya Kisleve.*
2 Bato ya Betele batindaki Sharezere ná Regeme-meleke ná bato na ye mpo básɛnga Yehova amonisela bango boboto,*
3 báloba na banganga-nzambe ya tempelo* ya Yehova ya mampinga, mpe na basakoli ete: “Nasengeli nde kolela mpe koboya kolya na sanza ya mitano,+ ndenge nasalaka yango banda bambula ebele?”
4 Yehova ya mampinga alobaki na ngai lisusu:
5 “Lobá na bato nyonso ya ekólo oyo mpe na banganga-nzambe ete: ‘Ntango bokilaki bilei mpe bogangaki na kolela na sanza nyonso ya mitano mpe na sanza nyonso ya nsambo,+ mbula 70 mobimba,+ bokilaki mpenza bilei mpo na ngai?
6 Mpe ntango bozalaki kolya mpe komɛla, bozalaki kolya mpe komɛla mpo na bino moko te?
7 Bosengelaki nde te kotosa maloba oyo Yehova asakolaki na nzela ya basakoli ya kala,+ na ntango oyo Yerusaleme, mpe bingumba oyo ezali zingazinga na yango etondaki na bato mpe ezalaki na kimya, mpe na ntango oyo Negebe ná Shefela etondaki na bato?’”
8 Yehova alobaki lisusu na Zekaria ete:
9 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bósambisaka na bosembo ya solosolo,+ mpe bósalelanaka makambo na bolingo ya sembo+ mpe na motema mawa.
10 Bóbubaka te mwasi oyo mobali akufá to mwana oyo tata akufá,*+ to mopaya+ to mobola;+ mpe bókanaka te kosalelana mabe na mitema na bino.’+
11 Kasi bazalaki kaka koboya kotya likebi,+ bakobaki kopesa ngai mokɔngɔ,+ mpe bakangaki matoi na bango mpo báyoka te.+
12 Mpe bakómisaki motema na bango makasi lokola diama*+ mpe baboyaki kotosa mobeko* mpe maloba oyo Yehova ya mampinga atindaki na elimo na ye, na nzela ya basakoli ya kala.+ Bongo Yehova ya mampinga ayokaki nkanda makasi.”+
13 “‘Kaka ndenge bayokaki te ntango nabengaki*+ bango, ngai mpe nayokaki te ntango babengaki ngai,’+ Yehova ya mampinga alobi bongo.
14 ‘Bongo napalanganisaki bango na mopɛpɛ makasi na bikólo nyonso oyo bango bayebaki te.+ Nsima na bango, mokili etikalaki mpamba. Moto azalaki koleka wana te mpe moto azalaki kozonga wana te,+ mpo bakómisaki mokili yango ya kitoko eloko ya kopesa nsɔmɔ.’”

