Zekaria 4:1-14

  • Emonaneli 5: Etɛlɛmiselo ya miinda mpe banzete mibale ya olive (1-14)

    • “Na nguya ya moto te, kasi na elimo na ngai” (6)

    • Kotyola te mokolo oyo makambo ebandaki mokemoke (10)

4  Anzelu oyo asololaki na ngai ayaki lisusu mpe alamwisaki ngai, ndenge balamwisaka moto na mpɔngi. 2  Bongo atunaki ngai: “Ozali komona nini?” Nayanolaki: “Nazali komona etɛlɛmiselo ya miinda oyo esalemi mobimba na wolo,+ ná kibakuli moko na nsɔngɛ na yango. Ezali na miinda nsambo likoló na yango,+ ɛɛ nsambo, mpe miinda oyo ezali na nsɔngɛ na yango ezali na batiyo nsambo. 3  Mpe pembeni na yango ezali na banzete mibale ya olive,+ moko na lobɔkɔ ya mobali ya kibakuli, mosusu na lobɔkɔ ya mwasi.” 4  Bongo natunaki anzelu oyo azalaki kosolola na ngai: “Nkolo na ngai, biloko oyo elimboli nini?” 5  Bongo anzelu oyo azalaki kosolola na ngai atunaki ngai: “Oyebi te soki biloko oyo elimboli nini?” Nayanolaki: “Nayebi te, nkolo na ngai.” 6  Bongo alobaki na ngai: “Talá oyo Yehova alobi na Zerubabele: ‘“Nyonso wana ekosalema na makasi ya basoda te, na nguya ya moto te,+ kasi na elimo na ngai,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo. 7  Ee ngomba monene, yo nani? Liboso ya Zerubabele+ okokóma mokili patatalu.+ Mpe akomema libanga ya likoló, wana bato bazali koganga: “Ezali kitoko! Ezali kitoko!”’” 8  Yehova alobaki na ngai lisusu; alobi: 9  “Mabɔkɔ ya Zerubabele etye moboko ya ndako oyo,+ mpe kaka mabɔkɔ na ye nde ekosilisa yango.+ Mpe bokoyeba mpenza ete Yehova ya mampinga nde atindi ngai epai na bino. 10  Mpo nani atyoli mokolo oyo makambo ebandaki mokemoke?*+ Mpo bakosepela mpe bakomona nsinga ya nivo* na lobɔkɔ ya Zerubabele. Miso yango nsambo ezali miso ya Yehova, oyo ezali kotalatala na mabele mobimba.”+ 11  Bongo natunaki ye: “Banzete wana mibale ya olive oyo ezali na lobɔkɔ ya mobali mpe na lobɔkɔ ya mwasi ya etɛlɛmiselo ya miinda elimboli nini?”+ 12  Bongo natunaki ye mpo na mbala ya mibale ete: “Bongo maboke mibale ya bitape* ya nzete ya olive, oyo ezali kosopa mafuta oyo ezali kongɛnga lokola wolo na kati ya batiyo mibale ya wolo, elimboli nini?” 13  Bongo atunaki ngai: “Oyebi te soki biloko oyo elimboli nini?” Nayanolaki: “Nayebi te, nkolo na ngai.” 14  Alobaki: “Ezali bato mibale oyo batyami mafuta, oyo batɛlɛmaka pene na Nkolo ya mabele mobimba.”+

Maloba na nse

To, “mokolo ya makambo mike.”
Lil., “libanga, etini.”
Elingi koloba, bitape oyo ezali na mbuma.