Zekaria 10:1-12

  • Bósɛnga nde Yehova mbula, kasi banzambe ya lokuta te (1, 2)

  • Yehova asangisi bato na ye (3-12)

    • Moto monene auti na kati ya bato ya Yuda (3, 4)

10  “Bósɛnga Yehova apesa mbula na eleko ya bambula ya prɛnta. Yehova nde asalaka mapata ya mbula ya mopɛpɛ makasi,Ye nde anɔkisaka mbula mpo na bato,+Mpe apesaka moto nyonso milona na bilanga.  2  Mpo bikeko ya banzambe ya libota* elobi makambo ya bokosi;*Mpe bamoni-bimonaneli bazwi bimonaneli ya lokuta. Bazali kolobela bandɔtɔ ezangi ntina,Mpe bazali komeka kobɔndisa kasi moto abɔndisami te. Yango wana bakoyengayenga lokola bampate. Bakonyokwama, mpo mobateli ya mpate azali te.  3  Nkanda na ngai engaleli babateli ya mpate,Mpe nakosɛnga bakambi oyo banyokolaka basusu* bázongisa monɔkɔ;Mpo Yehova ya mampinga atye likebi na ye epai ya etonga na ye,+ bato ya Yuda,Mpe akómisi bango lokola mpunda na ye ya lokumu na etumba.  4  Moto monene* auti na Yuda,Moyangeli oyo asungaka* auti epai na ye,Litimbo ya etumba euti epai na ye;Bakɛngɛli* nyonso babimi epai na ye, bango nyonso.  5  Mpe bakokóma lokola bilombe ya etumba,Oyo bazali konyatanyata pɔtɔpɔtɔ ya babalabala na etumba. Bakobunda etumba, mpo Yehova azali elongo na bango;+Mpe batambwisi-mpunda bakoyokisama nsɔni.+  6  Nakosala ete bato ya Yuda bálonga,Mpe nakobikisa bakitani ya Yozefe.+ Nakozongisa bango na mboka na bango,Mpo nakomonisela bango motema mawa;+Mpe ekozala lokola nde nabwakaki bango ata mokolo moko te;+Mpo nazali Yehova Nzambe na bango, mpe nakoyanola bango.  7  Bato ya Efraime bakokóma lokola elombe ya etumba,Mpe mitema na bango ekosepela lokola nde bamɛli vinyo.+ Mpe bana na bango ya mibali bakomona yango mpe bakosepela;Mitema na bango ekozala na esengo mpo na Yehova.+  8  ‘Nakobɛta piololo mpo na kobenga bango mpe nakosangisa bango esika moko;Mpo nakosikola bango,+Bakokóma ebele, mpe bakokoba kozala ebele.  9  Ata soki napalanganisi bango lokola mboto na kati ya bato ya bikólo,Bakokanisa ngai na bamboka ya mosika;Bango ná bana na bango bakozwa lisusu makasi mpe bakozonga. 10  Nakolongola bango na mokili ya EzipitoMpe nakolongola bango na Asiri,+ nakosangisa bango esika moko;Nakomema bango na mokili ya Gileade+ mpe na Liban,Mpe esika ekokoka te mpo na bango nyonso.+ 11  Nakoleka na mbu mpo nakopesa ye mpasi;Mpe na mbu nakobɛta bambonge,+Mpe bisika nyonso ya mozindo na Nile ekokauka. Nakosukisa lolendo ya Asiri,Mpe lingenda ya bokonzi ya Ezipito ekolongwa.+ 12  Bakolonga nde mpo na Yehova,+Mpe bakotambola epai na epai na nkombo na ye,’+ Yehova alobi bongo.”

Maloba na nse

^ Lil., “baterafime.”
^ To, “misala ya maji; bikelakela.”
^ Lil., “bantaba-mibali.”
^ Lil., “Linɔ́ngi ya litumu,” maloba ya elilingi mpo na kolobela moto moko ya ntina mingi, mokonzi.
^ Lil., “likonzí,” maloba ya elilingi mpo na kolobela moto oyo asungaka, moyangeli.
^ To, “Bakapita ya mosala.”