Yisaya 63:1-19
63 Nani yango oyo azali kouta na Edome,+Oyo azali kouta na Bozera+ na bilamba ya langi makasi,*Oyo alati bilamba ya kitoko,Azali kotambola na nguya na ye nyonso?
“Ezali ngai, Moto oyo alobaka na bosembo,Moto oyo atondi na nguya ya kobikisa.”
2 Mpo na nini bilamba na yo ezali motane,Mpe mpo na nini bilamba na yo ezali lokola ya moto oyo azali konyatanyata mbuma na ekamwelo ya vinyo?+
3 “Nanyatinyati saani ya kokamola vinyo kaka ngai moko,
Moto moko te na kati ya bato ya bikólo azalaki elongo na ngai.
Na nkanda na ngai nakobaki konyata banguna na ngai,Mpe nakobaki konyata bango na nkanda makasi na ngai.+
Makila na bango epanzanaki na bilamba na ngai,Mpe bilamba na ngai nyonso ekómaki mbindo.
4 Mpo mokolo ya kozongisa mabe ezali na motema na ngai,+Mpe mbula ya basikolami na ngai ekómi.
5 Natalaki, kasi moto ya kosalisa ngai azalaki te;Nakamwaki, mpo moto ya kosalisa ngai azalaki te.
Bongo lobɔkɔ na ngai ememelaki ngai lobiko,*+Nkanda na ngai ya makasi nde esalisaki ngai.
6 Na nkanda na ngai nanyatanyataki bato ya bikólo,Nasalaki ete nkanda na ngai makasi elangwisa bango+Mpe nasopaki makila na bango na mabele.”
7 Nakolobela misala ya bolingo ya sembo ya Yehova,Misala ya Yehova oyo ebongi kosanzolama,Mpo na nyonso oyo Yehova asaleli biso,+Makambo ebele ya malamu asali mpo na ekólo Yisraele,Na kolanda motema mawa na ye mpe bolingo ya sembo oyo atondi na yango.
8 Mpo alobaki ete: “Ya solo bazali bato na ngai, bana oyo bakozanga bosembo te.”*+
Yango wana, akómaki Mobikisi na bango.+
9 Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye mpe azalaki koyoka mpasi.+
Mpe momemi-nsango na ye moko abikisaki bango.+
Na bolingo na ye mpe na motema mawa na ye, asikolaki bango,+Mpe atombolaki bango mpe amemaki bango bambula nyonso oyo eleká.+
10 Kasi batombokaki+ mpe bayokisaki elimo santu na ye mawa.+
Bongo akómaki monguna na bango;+Mpe abundisaki bango.+
11 Mpe bakanisaki lisusu mikolo ya kala,Mikolo ya mosaleli na ye Moize:
“Wapi Moto oyo abimisaki bango na mbu+ elongo na babateli ya mpate ya etonga na ye?+
Wapi Moto oyo atyaki elimo santu na Ye kati na ye?+
12 Wapi Moto oyo asalisaki Moize na nzela ya nguya na ye monene;*+Moto oyo akabolaki mai liboso na bango,+Mpo na komisalela nkombo oyo ekoumela seko;+
13 Moto oyo asalaki ete bákatisa mai oyo ezalaki kotomboka,*Bongo batambolaki kozanga kobɛta libaku,Lokola mpunda na esobe?
14 Kaka ndenge bakitisaka bibwɛlɛ na lobwaku patatalu,Elimo ya Yehova epemisaki bango.”+
Ndenge yango nde okambaki bato na yoMpo omisalela nkombo ya lokumu.*+
15 Talá uta na likoló mpe monáUta na esika na yo oyo etombwaná, ya bosantu mpe ya nkembo.*
Wapi molende mpe nguya na yo,Makɛlɛlɛ ya bolingo monene na yo,*+ mpe ya motema mawa na yo?+
Oboyeli biso yango.
16 Mpo ozali Tata na biso;+Atako Abrahama ayebi biso teMpe Yisraele ayebi biso lisusu te,Ee Yehova, yo nde Tata na biso.
Mosikoli na biso ya kala, yango nde nkombo na yo.+
17 Ee Yehova, mpo na nini ozali kotika biso* tóyengayenga mosika na banzela na yo?
Mpo na nini otiki* mitema na biso ekóma makasi tii tozali kobanga yo lisusu te?+
Zongá mpo na bolamu ya basaleli na yo,Mabota ya libula na yo.+
18 Ekólo na yo mosantu ezwaki yango kaka mpo na ntango moke.
Banguna na biso banyatinyati esika na yo mosantu.+
19 Banda kala tokómá lokola bato oyo oyangelaki te,Lokola bato oyo babengamaki ata moke te na nkombo na yo.
Maloba na nse
^ To mbala mosusu, “ya motane oyo ezali kongɛnga.”
^ To, “bolongi.”
^ To, “bakokosa te.”
^ To, “oyo alekisaki lobɔkɔ na ye ya kitoko na lobɔkɔ mobali ya Moize.”
^ To, “mai mozindo.”
^ To, “ya kitoko.”
^ To, “makɛlɛlɛ ya libumu na yo.”
^ To, “kitoko.”
^ To, “kosala ete.”
^ Lil., “ozali kokómisa.”

