Yisaya 62:1-12

  • Nkombo ya sika ya Siona (1-12)

62  Mpo na Siona nakokanga monɔkɔ te,+Mpe mpo na Yerusaleme nakofanda nyɛɛ teTii bosembo* na ye ekongɛnga lokola pole ya makasi+Mpe lobiko na ye ekopela lokola mɔtɔ oyo ezali kopela.+  2  “Bikólo ekomona bosembo na yo, Ee mwasi,+Mpe bakonzi nyonso bakomona nkembo na yo.+ Mpe bakobenga yo na nkombo ya sika,+Oyo Yehova ye moko akopona.  3  Okokóma motole* ya kitoko na lobɔkɔ ya Yehova,Tirba ya bokonzi na lobɔkɔ ya Nzambe na yo.  4  Okobengama lisusu te mwasi oyo basundolá,+Mpe mokili na yo ekobengama lisusu te oyo etikalá mpamba.+ Kasi bakobenga yo: “Esengo na ngai ezali epai na ye,”+Mpe bakobenga mokili na yo: “Mwasi ya moto.” Mpo Yehova akosepela na yo,Mpe mokili na yo ekozala lokola mwasi oyo abalá.  5  Mpo kaka ndenge elenge mobali abalaka ngɔndɔ,Bafandi na yo bakobala yo. Ndenge mobali oyo auti kobala asepelaka na mwasi oyo abali,Nzambe na yo akosepela na yo.+  6  Ee Yerusaleme, natye basinzili likoló ya bifelo na yo. Moi mobimba mpe butu mobimba, ntango nyonso, basengeli kokanga monɔkɔ te. Bino baoyo bolobelaka Yehova,Bófanda nyɛɛ te,  7  Bótika ye apema te tii akopika Yerusaleme makasi,Tii akosala ete ezala eloko ya kosanzola na mabele.”+  8  Yehova alapi ndai na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe na lobɔkɔ na ye ya makasi ete: “Nakopesa lisusu te banguna na yo mbuma na yo mpo bálya,Mpe bato ya mboka mosusu bakomɛla te vinyo na yo ya sika oyo obomelaki nzoto.+  9  Kasi baoyo bakobuka yango bakolya yango, mpe bakosanzola Yehova;Mpe baoyo bazali koyanganisa yango bakomɛla yango na mapango mosantu na ngai.”+ 10  Bóleka, bóleka na baporte. Bóbongisa nzela mpo na bato.+ Bótonga, bótonga balabala monene. Bólongola mabanga na yango.+ Bótɛlɛmisela bato ya bikólo elembo.+ 11  Talá! Yehova ye moko asakoli tii na bansuka ya mabele: “Bóloba na mwana mwasi ya Siona ete:‘Talá! Lobiko na yo ezali koya.+ Talá! Azali na mbano ya kopesa,Mpe lifuti oyo azali kofuta ezali liboso na ye.’”+ 12  Bato bakobenga bango ekólo mosantu, bato oyo Yehova asikoli,+Bakobenga yo “Moto balukaka,” “Engumba oyo basundolá te.”+

Maloba na nse

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “ekɔti ya bokonzi.”