Yisaya 5:1-30

  • Loyembo mpo na elanga ya vinyo ya Yehova (1-7)

  • Mpasi ekokómela elanga ya vinyo ya Yehova (8-24)

  • Nzambe asilikeli bato na ye (25-30)

5  Tiká nayembela moto oyo nalingakaEzali loyembo ya moto oyo nalingaka, mpe ya elanga ya vinyo na ye.+ Moto oyo nalingaka azalaki na elanga ya vinyo na mopanzi ya ngomba moko moke oyo ebotaka malamu.  2  Abalolaki mabele mpe alongolaki mabanga Alonaki nzete ya vinyo ya motane ya kitoko mpenza,Atongaki linɔ́ngi moko na katikati na yango,Mpe atimolaki ekamwelo moko ya vinyo kati na yango.+ Bongo azalaki na elikya ete ekobota mbuma ya vinyo ya malamu,Kasi ebotaki nde bambuma ya vinyo ya zamba.+  3  “Mpe sikoyo, bino bafandi ya Yerusaleme mpe bato ya Yuda,Nabondeli bino, bókata likambo na ngai ná elanga na ngai ya vinyo.+  4  Eloko nini lisusu nasengeli kosalela elanga na ngai ya vinyoOyo nasali naino te?+ Nazalaki na elikya ete ekobota mbuma ya vinyo ya malamu,Kasi mpo na nini ebotaki mbuma ya vinyo ya zamba?  5  Sikoyo, tiká nayebisa binoOyo nakosala elanga na ngai ya vinyo: Nakolongola lopango na yango,Mpe bakotumba yango.+ Bakobuka efelo na yango ya mabanga,Mpe bakonyatanyata yango.  6  Nakokómisa yango mabele moko ya mpamba;+Bakokata bitape na yango te, bakolongola mpe matiti na yango te. Ekotonda na banzubɛ mpe matiti mabe,+Mpe nakopesa mapata etinda ete enɔkisela yango lisusu mbula te.+  7  Mpo elanga ya vinyo ya Yehova ya mampinga ezali ekólo Yisraele;+Bato ya Yuda bazali elanga oyo azalaki kolinga mingi. Azalaki kolikya ete bosembo ekokoba,+Kasi talá! Kozanga bosembo nde ezalaki;Azalaki kolikya ete boyengebene ekokoba,Kasi talá! Koganga mpo na mpasi.”+  8  Mawa na baoyo bazali kobakisa ndako moko na ndako mosusu+Mpe na baoyo bazali kobakisa elanga moko na elanga mosusu+Tii esika ezali lisusu teMpe bozali kofanda bino moko na mokili!  9  Na matoi na ngai, Yehova ya mampinga alapi ndaiEte bandako mingi, atako ezali minene mpe kitoko,Ekokóma eloko moko ya nsɔmɔ mpenza,Moto moko te akofanda kuna.+ 10  Mpo ektare minei ya elanga ya vinyo ekobimisa kaka bati* moko,Mpe homɛrɛ* moko ya mboto ekobimisa kaka efa* moko.+ 11  Mawa na bato oyo balamukaka ntɔngɔntɔngɔ mpo na komɛla masanga oyo elangwisaka,+Baoyo baumelaka tii na molili ya mpokwa, bongo vinyo ekómaka kopela lokola mɔtɔ na kati na bango! 12  Bazali na nzɛnzɛ, ebɛtɛlo ya nsinga,Mbonda moke, piololo, ná vinyo na bafɛti na bango;Kasi bazali kotya likebi te na misala ya Yehova,Mpe bamonaka mosala ya mabɔkɔ na ye te. 13  Na yango, bato na ngai bakomemama na mboka mopaya,Mpo bazangi boyebi;+Bato na bango ya nkembo bakokufa nzala,+Mpe bato na bango nyonso bakokufa na mposa ya mai. 14  Bongo, Nkunda* emikómisi moneneMpe efungoli monɔkɔ na yango monene koleka ndelo;+Mpe nkembo* ya Yerusaleme, bato na yango ebele oyo bazali kosala makɛlɛlɛ,Mpe bato na yango oyo balingá kosala fɛti bakokita mpenza kati na yango. 15  Mpe moto akogumbama,Moto akokita na nse,Mpe miso ya bato ya lolendo ekokita na nse. 16  Yehova ya mampinga akotombwama na nzela ya lisambisi* na ye;Nzambe ya solo, Mosantu,+ akomisantisa na nzela ya bosembo.*+ 17  Mpe bana-mpate ekolya lokola na esika na yango ya kolya matiti;Mpe bato oyo bafandi bapaya bakolya na bisika oyo etikalá mpamba ya banyama oyo eleisami malamu. 18  Mawa na baoyo bazali kobenda ngambo na bango na bansinga ya bokosiMpe lisumu na bango na nsinga ya pusu; 19  Na baoyo balobaka: “Nzambe asala mosala na ye nokinoki;Eya mbangu, mpo tómona yango. Mokano* ya Mosantu ya Yisraele esalemaMpo tóyeba yango!”+ 20  Mawa na baoyo balobaka ete malamu ezali mabe mpe mabe ezali malamu,+Baoyo batyaka molili na esika ya pole mpe pole na esika ya molili,Baoyo batyaka bololo na esika ya elɛngi mpe elɛngi na esika ya bololo! 21  Mawa na baoyo bazali na bwanya na miso na bango mokoMpe bamimonaka bato ya mayele!+ 22  Mawa na baoyo bazali bilombe ya komɛla vinyoMpe na baoyo bazali makasi mpo na kosangisa masanga oyo elangwisaka,+ 23  Na baoyo bazali kolongisa moto mabe mpo na kanyaka+Mpe na baoyo bazali kowangana bosembo ya moto ya sembo!+ 24  Yango wana, kaka ndenge lolemo ya mɔtɔ elyaka matiti ya bléMpe matiti oyo ekauká ezindaka na kati ya ndemo ya mɔtɔ,Misisa na bango ekopɔla mpenza,Mpe bafololo na bango ekomata lokola putulu,Mpo baboyi mobeko* ya Yehova ya mampingaMpe batyoli liloba ya Mosantu ya Yisraele.+ 25  Yango wana nkanda ya Yehova epeleli bato na ye,Mpe akosembolela bango lobɔkɔ na ye mpe akobɛta bango.+ Bangomba ekoningana,Mpe bibembe na bango ekokóma lokola bosɔtɔ na babalabala.+ Mpo na nyonso wana, nkanda na ye esili te,Kasi lobɔkɔ na ye ezali kaka ya kosembolama mpo na kobɛta. 26  Atɛlɛmisi elembo mpo na ekólo moko ya mosika;+Abɛti piololo mpo bango báya uta na bansuka ya mabele;+Mpe talá! Bazali koya mbangu mpenza.+ 27  Moto moko te na kati na bango alɛmbi to azali kobɛta libaku. Moto moko te azali koyoka mpɔngi to kolala. Mokaba oyo ezingi loketo na bango efungwami te,Bansinga ya basandale na bango ekatani mpe te. 28  Makula na bango nyonso epelisami,Mpe matimbo na bango nyonso egumbami. Basabo ya bampunda na bango ezali libanga ya silekisi,Mpe bapine na bango ya ebende lokola mopɛpɛ makasi.+ 29  Koganga na bango ezali lokola oyo ya nkɔsi;Mpe bazali koganga lokola bana-nkɔsi.*+ Bakonguluma mpe bakokanga nyama ya kolyaBakomema yango mpe moto moko te akobikisa yango. 30  Na mokolo yango, bakonguluma likoló na yangoLokola konguluma ya mbu.+ Bato nyonso oyo bakotala mokili bakomona molili ya nsɔmɔ;Ata pole ekómi molili mpo na mapata.+

Maloba na nse

Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
To, “bato na yango ya lokumu.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bosembo.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “ekateli; toli.”
To, “mateya.”
To, “bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”