Yisaya 12:1-6

  • Loyembo ya kopesa matɔndi (1-6)

    • “Yah Yehova azali makasi na ngai” (2)

12  Na mokolo yango okoloba mpenza boye: “Ee Yehova, napesi yo matɔndi,Mpo atako osilikelaki ngai,Nsukansuka, nkanda na yo ekitaki, mpe obɔndisaki ngai.+  2  Talá! Nzambe azali lobiko na ngai.+ Nakotya motema mpe nakozala na nsɔmɔ te;+Mpo Yah* Yehova azali makasi na ngai mpe nguya na ngai,Mpe akómaki lobiko na ngai.”+  3  Na esengo nyonso bokotoka maiNa maziba ya lobiko.+  4  Mpe na mokolo yango bokoloba boye: “Bópesa Yehova matɔndi, bóbelela nkombo na ye.Bóyebisa bato ya bikólo misala na ye!+ Bóloba ete nkombo na ye etombwani likoló.+  5  Nakoyemba mpo na kosanzola* Yehova,+ mpo asali makambo ya kokamwa.+ Tiká yango eyebisama na mabele mobimba.  6  Yo oyo ofandaka* na Siona, gangá makasi mpe gangá na esengo,Mpo Mosantu ya Yisraele azali monene na kati na yo.”

Maloba na nse

“Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.
To, “Nakobɛta miziki mpo na.”
Lil., “mwasi oyo afandi.” Ezali kolobela ekólo mobimba, oyo ezali elilingi ya mwasi.