Yisaya 10:1-34
10 Mawa na baoyo batyaka malako mpo na kopesa mpasi,+Mawa na baoyo babimisaka ntango nyonso mibeko mpo na konyokola,
2 Mpo báboyela babola ntomo na bango,Mpo na kopimela bato mpamba na kati ya bato na ngai bosembo,+Bazali kopunza basi oyo mibali bakufá,Mpe bana oyo batata bakufá!+
3 Bokosala nini na mokolo ya lisambisi,*+Ntango libebi ekouta mosika?+
Bokokima epai ya nani mpo na koluka lisalisi,+Mpe bokotika bomɛngo* na bino epai ya nani?
4 Likambo mosusu ya kosala ekozala te longola kaka kogumbama na kati ya bato ya bolɔkɔTo kokwea na nse na kati ya bato oyo babomami.
Mpo na nyonso wana, nkanda na ye esili te,Kasi lobɔkɔ na ye ezali kaka ya kosembolama mpo na kobɛta.+
5 “Talá! Moto ya Asiri,+Azali fimbo oyo nazali kosalela mpo na komonisa nkanda na ngai,+Nazali kosalela nzete oyo ezali na lobɔkɔ na ye mpo na kopesa etumbu!
6 Nakotinda ye akende kobunda na ekólo oyo epɛngwi,+Kobunda na bato oyo basilikisi ngai;Nakopesa ye mitindo abɔtɔla mpe apunza biloko mingiMpe anyatanyata bango lokola pɔtɔpɔtɔ ya babalabala.+
7 Kasi ekozala likanisi na ye teMpe motema na ye ekokana yango te;Mpo na motema na ye, likanisi ezali nde ya kobebisa nyɛɛ,Koboma bikólo mingi, kasi moke te.
8 Mpo alobi:‘Bankumu na ngai bazali bango nyonso bakonzi te?+
9 Kalano+ ezali lokola Karakemishe+ te?
Hamate+ ezali lokola Arpade+ te?
Samaria+ ezali lokola Damasi+ te?
10 Lobɔkɔ na ngai esimbi makonzi ya banzambe oyo ezangá ntina,Oyo bikeko* na ye ezali ebele koleka bikeko oyo ezali na Yerusaleme mpe na Samaria,+
11 Nakosala mpe te Yerusaleme ná bikeko na yangoNdenge nasalaki Samaria mpe banzambe na yango oyo ezangá ntina?’+
12 “Ntango Yehova akosilisa mosala na ye nyonso na Ngomba Siona mpe na Yerusaleme, akopesa* mokonzi ya Asiri etumbu mpo na lofundo ya motema na ye, komitombola na ye mpe miso na ye ya lolendo.+
13 Mpo alobi:‘Nakosala yango na makasi ya lobɔkɔ na ngai,Mpe na bwanya na ngai, mpo nazali moto ya bwanya.
Nakolongola bandelo ya bato ya bikólo,+Nakopunza biloko na bango ya motuya,+Mpe nakokitisa bato oyo bafandi wana ndenge moto ya nguya asalaka.+
14 Ndenge kaka lobɔkɔ ya moto esimbaka zumbu,*Lobɔkɔ na ngai ekosimba biloko ya bato ya bikólo;Mpe kaka ndenge moto asangisaka maki oyo esundolami,Nakosangisa mabele mobimba!
Ata moto moko te akobɛta mapapu na ye to akofungola monɔkɔ na ye to akoloba swiswiswi.’”
15 Epasola ekomikumisa ete eleki moto oyo azali kokata na yango?
Sii ekomitombola nde ete eleki moto oyo azali kosalela yango?
Fimbo+ ekoki nde koningisa moto oyo azali kotombola yango?
To lingenda ekoki nde kotombola moto oyo asimbi yango?
16 Yango wana Nkolo ya solo, Yehova ya mampinga,Akosala ete bato* na ye ya makasi* bákɔnda,+Mpe na nse ya nkembo na ye akopelisa mɔtɔ moko ya makasi.+
17 Pole ya Yisraele+ akokóma mɔtɔ,+Mpe Mosantu na ye lolemo ya mɔtɔ;Ekopela mpe ekozikisa matiti na ye ya mabe mpe mwa banzete na ye ya nzubɛ na mokolo kaka moko.
18 Akobebisa mpenza* nkembo ya zamba na ye mpe ya elanga na ye ya banzete;Ekozala lokola kokɔnda ya moto oyo azali kobɛla.+
19 Banzete oyo ekotikala na zamba na yeEkokóma motángo moke, ata mwana moke ya mobali akokoka kotánga yango.
20 Na mokolo yango, baoyo bakotikala na YisraeleMpe baoyo babiki na ndako ya YakoboBakoluka lisusu lisalisi te epai ya moto oyo azali kobɛta bango;+Kasi bakoluka nde lisalisi epai ya Yehova,Mosantu ya Yisraele, mpe bakozala sembo epai na ye.
21 Kaka mwa bato oyo batikali,Bato ya Yakobo oyo batikali, nde bakozongela Nzambe ya Nguya.+
22 Ata soki bato na yo, Ee Yisraele,Bazali lokola bambuma ya zɛlo ya mbu,Kaka mwa bato na bango oyo batikali nde bakozonga.+
Ekateli ezwami ya kosilisa bino nyonso,+Mpe etumbu ya bosembo ekokwela bino.+
23 Ɛɛ, ekateli oyo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga,Azwaki ya kosilisa nyɛɛ ekokokisama na mboka mobimba.+
24 Yango wana, talá oyo Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga, alobi: “Bato na ngai oyo bofandi na Siona, bóbanga Moasiri te, oyo azalaki kobɛtabɛta bino na fimbo+ mpe oyo azalaki kotombolela bino lingenda na ye ndenge Ezipito ezalaki kosala.+
25 Mpo etikali kaka mwa ntango moke bitumbu ekosila, mpe nkanda na ngai ekozala epai na bango mpo na kobebisa bango.+
26 Yehova ya mampinga akoningisela ye fimbo+ lokola ntango Midiane ebɛtamaki pene na libanga ya Orebe.+ Mpe lingenda na ye ekozala likoló ya mbu, mpe akotombola yango ndenge atombolelaki Ezipito.+
27 Na mokolo yango, mokumba na ye ekolongwa na lipeka na yo,+Ekanganeli na ye ekolongwa na nkingo na yo,+Mpe ekanganeli yango ekobukana+ mpo na mafuta.”
28 Ayeli Aiyate;+Aleki na Migrone;Atiki biloko na ye na Mikemashe.+
29 Bakatisi esika bakatisaka mai na makolo;Geba+ ezali esika na bango ya kolala na butu;Rama elɛngi, Gibea+ ya Saulo ekimi.+
30 Ee mwana mwasi ya Galime, bimisá mongongo na yo mpe gangá makasi.
Ee Laisha, tyá likebi.
Ee mawa na yo, Anatote!+
31 Madamena ekimi.
Bato oyo bafandi na Gebime baluki esika ya komibomba.
32 Liboso mokolo esila, akotɛlɛma na Nobe.+
Azali koningisa likofi na ye na ngomba ya mwana mwasi ya Siona,Ngomba moke ya Yerusaleme.
33 Talá! Nkolo ya solo, Yehova ya mampinga,Azali kokata bitape na lokito moko ya nsɔmɔ;+Banzete oyo eleki milai ezali kokitisama,Mpe oyo eleki minene ezali kokatama.
34 Akweisi mwa banzete oyo ezali na zamba na esaleli ya ebende,*Mpe moto oyo azali na nguya akokweisa Liban.

