Yirimia 6:1-30
6 Ee bana ya Benyamina, bóluka esika ya komibatela, mosika na Yerusaleme.
Bóyula liseke+ na Tekoa;+Bópelisa elembo ya mɔtɔ na Bete-hakereme!
Mpo mpasi ezali kouta na nɔrdi, libebi moko monene.+
2 Mwana mwasi ya Siona akokani na mwasi moko kitoko mpe oyo amesaná na makambo ya makasi te.+
3 Babateli ya mpate bakoya ná bitonga na bango.
Bakotɛlɛmisa bahema na bango zingazinga na ye.+Mobateli mokomoko akoleisa etonga oyo azali kobatela.+
4 “Bómibongisa* mpo na kobundisa ye!
Bótɛlɛma, mpe tóbundisa ye na midi!”
“Mawa na biso, mpo moi ezali kokita,Mpo molili ezali kokɔta!”
5 “Bótɛlɛma, mpe tóbundisa ye na butuMpe tóbebisa bandako milai na ye ya makasi.”+
6 Mpo talá oyo Yehova ya mampinga alobi:
“Bókata nzete mpe bósala mwa ngomba mpo na kobundisa Yerusaleme.+
Ezali engumba oyo esengeli kozongisa monɔkɔ;Kati na yango eloko mosusu ezali te kaka monyoko.+
7 Ndenge libulu ya kobomba mai ebatelaka mai na yango malili,Ndenge wana nde abateli mabe na ye.
Mobulu mpe libebi eyokani epai na ye;+Maladi mpe mpasi ezali ntango nyonso liboso na ngai.
8 Yoká makebisi, Ee Yerusaleme, soki te nakoyoka yo mabe mpenza* mpe nakotika yo;+Nakokómisa yo esika oyo etikali mpamba, mokili oyo bato bazali kofanda te.”+
9 Yehova ya mampinga alobi boye:
“Bakolɔkɔta batikali ya Yisraele kaka ndenge balɔkɔtaka mbuma ya nsuka ya nzete ya vinyo.
Zongisá lobɔkɔ na yo lokola moto oyo azali kobuka mbuma ya vinyo na bitape ya nzete ya vinyo.”
10 “Nakoloba na nani mpe nakokebisa nani,
Nani akoyoka?
Talá! Matoi na bango ekangamá,* yango wana bakoki kotya likebi te.+
Talá! Liloba ya Yehova ekómi eloko oyo bazali kotyola,+Basepelaka na yango te.
11 Mpe natondi na nkanda makasi ya Yehova,Nakoki lisusu kobomba yango te.”+
“Sopelá yango mwana oyo azali na nzela,+Etuluku ya bilenge mibali oyo bayangani.
Bango nyonso bakokangama, mobali ná mwasi na ye,Mibange ná baoyo bakoli mpenza.*+
12 Bandako na bango ekopesama epai ya bato mosusu,Ná bilanga mpe basi na bango.+
Mpo nakosembola lobɔkɔ na ngai mpo na kotɛmɛla bato oyo bafandi na mokili yango,” Yehova alobi bongo.
13 “Mpo banda na oyo aleki moke tii na oyo aleki monene na kati na bango, mokomoko na bango azali kozwa litomba na ndenge ya mabe;+Banda na mosakoli tii na nganga-nzambe, mokomoko na bango azali kobuba.+
14 Bazali komeka kobikisa bampota* ya bato na ngai likolólikoló, na ndenge bazali koloba na bango:‘Kimya ezali! Kimya ezali!’
Nzokande kimya ezali te.+
15 Bayokaki nde nsɔni mpo basalaki likambo moko oyo eyinamá?
Bazali koyoka nsɔni ata moke te!
Bayebi ata te ndenge bayokaka nsɔni.+
Yango wana bakokwea na kati ya bato oyo bazali kokwea;
Ntango nakopesa bango etumbu bakobɛta libaku,” Yehova alobi bongo.
16 Yehova alobi boye:
“Bótɛlɛma na banzela oyo ekutaná, mpe bómona.
Bótuna soki banzela ya kala ezali wapi.Bótuna soki nzela ya malamu ezali wapi,Mpe bótambola na yango,+ mpe bokozwa kimya.”
Kasi balobi ete: “Tokotambola na yango te.”+
17 “Mpe natyaki basinzili,+ oyo balobaki ete:‘Bótya likebi na lokito ya liseke!’”+
Kasi balobaki: “Tokotya likebi te.”+
18 “Na yango, bóyoka, Ee bikólo!
Ee liyangani, yebáLikambo oyo ekokómela bango.
19 Yoká, Ee mabele!
Nazali komemela bato oyo mpasi+Lokola lifuti ya makanisi na bango ya mabe,Mpo batyaki likebi te na maloba na ngaiMpe baboyaki mobeko na ngai.”*
20 “Olibana oyo ozali komemela ngai longwa na ShebaMpe nkokó ya nsolo mpimbo longwa na mokili ya mosika ekosala ngai nini?
Makabo na bino ya kotumba mobimba endimami te,Mpe bambeka na bino ezali kosepelisa ngai te.”+
21 Na yango, talá oyo Yehova alobi:
“Talá nazali kotyela bato oyo biloko oyo ebɛtisaka libaku,Mpe bakobɛta libaku,Batata ná bana elongo,Mozalani ná moninga na ye,Mpe bango nyonso bakokufa.”+
22 Talá oyo Yehova alobi:
“Talá! Ekólo moko ezali kouta na mokili ya nɔrdi,Mpe ekólo moko monene ekolamuka longwa na bisika oyo eleki mpenza mosika na mabele.+
23 Bakosimba litimbo mpe likɔnga moke.
Bazali mabe mpenza, mpe bakoyoka mawa te.
Mongongo na bango ekonguluma lokola mbu,Mpe bakomata na bampunda.+
Bakosala molɔngɔ ya etumba lokola moto ya etumba mpo na kobunda na yo, Ee mwana mwasi ya Siona.”
24 Toyoki nsango na yango.
Mabɔkɔ na biso elɛmbi.+Mawa ekangi biso,Mpasi makasi lokola mpasi ya mwasi oyo azali kobota.+
25 Kobima mpo na kokende na elanga te,Mpe kotambola na nzela te,Mpo monguna azali na mopanga;Bato bazali kobanga epai na epai.
26 Ee mwana mwasi ya bato na ngai,Latá ngɔtɔ*+ mpe omibalola na putulu ya mɔtɔ.
Lelá ndenge balelaka mwana kaka moko ya mobali, kolela ya mawa,+Mpo mobebisi akobimela biso na pwasa.+
27 “Nakómisi yo* momeki-bibende na kati ya bato na ngai,Moto oyo azali koluka malamumalamu;Osengeli kotya likebi mpe kotala malamumalamu nzela na bango.
28 Bango nyonso bazali bato ya mitó makasi,+Bazali kotambolatambola mpo na kokosela bato makambo.+
Bazali lokola kwivre mpe ebende.Bango nyonso bazali kosala makambo na bokosi.
29 Eloko ya kofula mopɛpɛ* eziki.
Mondɔlu ezali kobima na mɔtɔ na bango.
Bazali kokoba kopɛtola makasi kaka mpamba,+Mpe baoyo bazali mabe balongolami te na kati ya bato.+
30 Bato bakobenga bango palata oyo ebwakami,Mpo Yehova abwaki bango.”+

