Yirimia 40:1-16

  • Nebuzaradane atiki Yirimia (1-6)

  • Gedalia atyami mokambi ya mokili (7-12)

  • Basaleli Gedalia likita (13-16)

40  Yehova alobaki na Yirimia nsima wana Nebuzaradane+ mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi atikaki ye akende na Rama.+ Amemaki ye kuna mabɔkɔ ekangami na minyololo, mpe azalaki na kati ya bato nyonso ya Yerusaleme mpe ya Yuda oyo bamemamaki na mboka mopaya na Babilone.  Bongo mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi azwaki Yirimia mpe alobaki na ye boye: “Yehova Nzambe na yo asakolaki mpasi oyo ekweli esika oyo,  mpe Yehova asalaki ete ekokisama kaka ndenge alobaki, mpo bino bosalelaki Yehova lisumu mpe botosaki ye te. Yango wana likambo oyo ekómeli bino.+  Lelo nazali kolongola yo minyololo oyo ezali na mabɔkɔ na yo. Soki emonani malamu na miso na yo ete oya elongo na ngai na Babilone, yaká, mpe nakobatela yo. Kasi soki olingi te koya elongo na ngai na Babilone, koya te. Talá! Mokili mobimba ezali liboso na yo. Kende esika nyonso oponi.”+  Lokola Yirimia azalaki naino kokakatana mpo na kozonga, Nebuzaradane alobaki na ye: “Zongá epai ya Gedalia+ mwana ya Ahikame+ mwana ya Shafane,+ oyo mokonzi ya Babilone apesi mokumba ya kokamba bingumba ya Yuda, mpe fandá na ye kati na bato; to esika nyonso oyo olingi.” Mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi apesaki ye ndambo ya biloko ya kolya ná likabo mpe atikaki ye akende.  Bongo Yirimia ayaki epai ya Gedalia mwana ya Ahikame na Mizipa+ mpe afandaki elongo na ye na kati ya bato oyo batikalaki na mokili.  Na nsima, bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda oyo bazalaki na esobe ná bato na bango, bayokaki ete mokonzi ya Babilone apesi Gedalia mwana ya Ahikame mokumba ya kokamba babola oyo bamemamaki te na Babilone, mibali, basi mpe bana.+  Bongo bayaki epai ya Gedalia na Mizipa.+ Ezalaki Yishimaele+ mwana ya Netania, Yohanane+ ná Yonatane, bana ya Karea, Seraya mwana ya Tanumete, bana ya Efai Monetofa mpe Yezania+ mwana ya Momaakate, bango ná bato na bango.  Gedalia mwana ya Ahikame mwana ya Shafane alapelaki bango mpe bato na bango ndai ete: “Bóbanga kosalela Bakaladea te. Bófanda na mboka oyo mpe bósalela mokonzi ya Babilone, mpe makambo ekotambola malamu mpo na bino.+ 10  Ngai nakotikala na Mizipa, mpo nazala momonisi na bino epai ya* Bakaladea oyo bakoya epai na biso. Kasi bino bóyanganisa vinyo, mbuma ya eleko ya molunge ná mafuta, bóbomba yango na bambɛki na bino mpe bófanda na bingumba na bino oyo bozwi.”+ 11  Mpe Bayuda nyonso oyo bazalaki na Moabe, Amone, Edome mpe baoyo bazalaki na mikili mosusu nyonso, bayokaki ete mokonzi ya Babilone atikaki ete bato mosusu báfanda na Yuda mpe ete apesaki Gedalia mwana ya Ahikame mwana ya Shafane mokumba ya kokamba bango. 12  Bongo Bayuda nyonso babandaki kozonga uta na bisika nyonso epai bapalanganisaki bango, mpe bayaki na mokili ya Yuda, epai ya Gedalia na Mizipa. Bayanganisaki vinyo ná mbuma ya eleko ya molunge, ezalaki mingi mpenza. 13  Yohanane mwana ya Karea mpe bakonzi nyonso ya mampinga ya basoda oyo bazalaki na esobe bayaki epai ya Gedalia na Mizipa. 14  Balobaki na ye boye: “Oyebi te ete Baalisi, mokonzi ya bana ya Amone,+ atindi Yishimaele mwana ya Netania mpo aboma yo?”*+ Kasi Gedalia mwana ya Ahikame andimelaki bango te. 15  Bongo Yohanane mwana ya Karea alobaki na Gedalia na kobombana na Mizipa ete: “Tiká nakende mpe naboma Yishimaele mwana ya Netania, mpe moto moko te akoyeba. Mpo na nini aboma yo, mpo na nini bato nyonso ya Yuda oyo bayanganisami epai na yo bápalanganisama mpe bato ya Yuda oyo batikali bákufa?” 16  Kasi Gedalia+ mwana ya Ahikame alobaki na Yohanane mwana ya Karea boye: “Kosala likambo oyo te, mpo makambo oyo ozali koloba mpo na Yishimaele ezali lokuta.”

Maloba na nse

Lil., “kotɛlɛma liboso ya.”
To, “aboma molimo na yo.”