Yirimia 4:1-31

  • Kobongola motema ememaka mapamboli (1-4)

  • Libebi ekouta na Nɔrdi (5-18)

  • Yirimia atungisami mpo na libebi oyo ezali koya (19-31)

4  Yehova alobi boye: “Soki okozonga, Ee Yisraele,”“Soki okozongela ngai.Mpe soki okolongola bikeko na yo ya bosɔtɔ liboso na ngai,Okozala te lokola moto oyo azali kokimakima.+  2  Mpe soki olapi ndai na bosolo, na bosembo mpe na boyengebene ete:‘Lokola Yehova azali mpenza na bomoi,’Na yango bato ya bikólo bakomizwela lipamboli na nzela na ye,Mpe bakomikumisa mpo na ye.”+ 3  Mpo talá oyo Yehova alobi na bato ya Yuda mpe na Yerusaleme: “Bótimola mabele oyo ebongi na bilanga,Mpe bókoba te kolona na kati ya nzubɛ.+  4  Bino bato ya Yuda mpe bino bato oyo bofandi na Yerusaleme,Bókatama ngenga mpo na Yehova,Mpe bólongola misutu ya mitema na bino+Mpo nkanda na ngai engala te lokola mɔtɔ,Ezikisa mpe moto ya koboma yango azala te,Mpo na misala na yo ya mabe.”+  5  Bóyebisa yango na Yuda, mpe bósakola yango na Yerusaleme. Bóganga mpe bóyula liseke na mokili mobimba.+ Bóbelela na mongongo makasi mpe bóloba ete: “Bóyangana,Mpe tókima na bingumba oyo ebatelami makasi.+  6  Bótɛlɛmisa elembo oyo ememi na Siona. Bóluka esika ya komibatela mpe bótɛlɛma te,” Mpo nazali kobimisa mpasi moko longwa na nɔrdi,+ libebi moko monene.  7  Lokola nkɔsi oyo ezali kobima na mwa zamba na yango;+Mobebisi ya bikólo asimbi nzela akei.+ Abimi na esika na ye mpo na kokómisa mokili na yo eloko ya nsɔmɔ. Bingumba na yo ekobebabeba mpe moto ata moko te akofanda kuna.+  8  Mpo na yango, bólata ngɔtɔ.*+Bózala na mawa* mpe bóganga na kolela,Mpo nkanda ya kongala ya Yehova elongwe naino epai na biso te.  9  Yehova alobi boye: “Na mokolo yango,” “mokonzi akozanga mpiko,*+Bankumu mpe bakozanga mpiko;*Banganga-nzambe bakozala na nsɔmɔ, mpe basakoli bakotikala monɔkɔ polele.”+ 10  Bongo nalobaki: “Aa! Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Ya solo, okosi mpenza bato oyo+ mpe Yerusaleme, na ndenge olobi ete: ‘Bokozala na kimya,’+ kasi mopanga ezali na nkingo na biso.”* 11  Na ntango yango, bakoloba na bato oyo mpe na Yerusaleme boye: “Mopɛpɛ moko oyo ekaukisaka oyo euti na bangomba mike ya polele na mokili moko oyo ekaukáEkobɛta mwana mwasi ya* bato na ngai;Ekoya te mpo na kopupola mbuma to kopɛtola yango. 12  Na etinda na ngai mopɛpɛ makasi eutaka na bisika yango. Sikoyo nakoyebisa bango bikateli na ngai. 13  Talá! Akoya lokola mapata ya mbula,Mpe makalo na ye ezali lokola mopɛpɛ makasi.+ Bampunda na ye ezali na mbangu koleka bampongo.+ Mawa na biso, mpo tobebisami! 14  Ee Yerusaleme, pɛtolá motema na yo, mabe elongwa mpo obika.+ Tii ntango nini okoumela na makanisi na yo ya mabe? 15  Mpo mongongo moko ezali koyebisa nsango uta na Dani+Mpe ezali kosakola libebi uta na bangomba ya Efraime. 16  Bóyebisa yango, ɛɛ, epai ya bikólo.Bósakwela yango Yerusaleme.” “Bakɛngɛli* bazali koya, bauti na mokili ya mosika,Mpe bakotombolela bingumba ya Yuda mingongo na bango. 17  Bazingi ye bipai nyonso lokola bakɛngɛli ya elanga,+Mpo atombokeli ngai,”+ Yehova alobi bongo. 18  “Okofuta mpo na etamboli mpe misala na yo.+ Mpasi makasi ekokómela yo,Mpo ekokóma tii na motema na yo!” 19  Aa natungisami mpenza,* natungisami mpenza! Nayoki mpasi makasi na motema na ngai.* Motema na ngai ebɛti makasi. Nakoki kofanda nyɛɛ te,Mpo nayoki lokito ya liseke,Elembo ya kokebisa mpo na etumba.*+ 20  Kaka nsango ya mpasi nde ezali koyokana,Mpo mokili mobimba ebebisami. Na pwasa, bahema na ngai ebebisami,Mpe bilamba ya hema na ngai ebebisami na mbala moko.+ 21  Tii ntango nini nakokoba komona elembo,Nakokoba koyoka lokito ya liseke?+ 22  “Mpo bato na ngai bazali bazoba;+Batyeli ngai likebi te. Bazali bana oyo bazangi mayele, bazali na bososoli te. Bazali na mayele* mingi mpo na kosala mabe,Kasi bayebi te ndenge ya kosala malamu.” 23  Namonaki mokili, mpe talá! etikalaki mpamba mpe esundolamaki.+ Natalaki likoló, mpe pole na yango ezalaki lisusu te.+ 24  Namonaki bangomba, mpe talá! ezalaki koningana,Mpe bangomba mike ezalaki kolɛnga.+ 25  Namonaki, mpe talá! moto moko te azalaki,Mpe bandɛkɛ nyonso ya likoló ekimaki.+ 26  Namonaki, mpe talá! elanga ya banzete ya mbuma ekómaki esobe,Mpe bingumba na yango nyonso ebebisamaki.+ Ezalaki mpo na Yehova,Mpo na nkanda na ye ya kongala. 27  Mpo talá oyo Yehova alobi: “Mokili mobimba ekotikala mpamba,+Kasi nakobebisa yango nyonso te. 28  Mpo na ntina yango mokili ekolela,+Mpe kuna na likoló ekoyinda.+ Ezali mpo nalobi, nazwi ekateli,Mpe nakobongola makanisi na ngai te,* nakozonga mpe nsima te.+ 29  Na lokito ya bato oyo batambolaka na bampunda mpe ya bato oyo babwakaka mbanzi na litimbo,Engumba mobimba ekimi.+ Bakɔti na mwa bazamba,Bazali komata na mabanga.+ Engumba nyonso esundolami,Mpe moto moko te azali kofanda kuna.” 30  Sikoyo, lokola obebisami, okosala nini? Ozalaki kolata bilamba ya motane makasi,Ozalaki kolata biloko ya wolo oyo ebongisaka nzoto,Mpe ozalaki kokómisa miso na yo minene na langi ya monzɛlɛ ya moindo. Kasi ozalaki komikómisa kitoko kaka mpamba,+Mpo baoyo bazalaki kolula yo babwaki yo;Sikoyo bazali koluka koboma yo.*+ 31  Mpo nayoki mongongo lokola ya mwasi oyo azali na maladi,Mpasi lokola ya mwasi oyo azali kobota mwana na ye ya liboso,Mongongo ya mwana mwasi ya Siona oyo azali kaka kopema na mpasi. Azali kosembola mabɔkɔ mpe koloba:+ “Aa mawa na ngai, nalɛmbi* mpo na babomi!”

Maloba na nse

To, “bóbɛta ntolo.”
Lil., “motema.”
Lil., “motema.”
To, “kasi mopanga ekómi na molimo na biso.”
Maloba ya ntɔki mpo na kolobela moto, mbala mosusu komonisa mawa to komitya na esika ya moto.
Elingi koloba, “baoyo bazalaki kotalatala engumba mpo na koyeba ntango ya kobundisa yango.”
Lil., “misɔpɔ na ngai.”
Lil., “bifelo ya motema na ngai.”
To mbala mosusu, “lokito ya koganga ya etumba.”
To, “bwanya.”
To, “nakoyoka mawa te.”
To, “bazali koluka molimo na yo.”
To, “molimo na ngai elɛmbi.”