Hosea 8:1-14
8 “Bɛtá kelelo!*+
Moto akiteli ndako ya Yehova lokola mpongo,+Mpo bakati kondimana na ngai,+ mpe babuki mobeko na ngai.+
2 Bazali kobelela ngai ete: ‘Nzambe na biso, biso Yisraele, toyebi yo!’+
3 Yisraele abwaki makambo ya malamu.+
Tiká monguna alanda ye.
4 Batye bakonzi, kasi na nzela na ngai te.
Batye bankumu, oyo ngai nandimaki te.
Na palata na bango mpe wolo na bango, basali bikeko,+Na ndenge yango bamilukeli libebi.+
5 Mwana-ngɔmbɛ na yo ebwakami, Ee Samaria.+
Nkanda na ngai engaleli bango.+
Kino ntango nini bakokoka te komonisa ete basali likambo te?*
6 Mpo yango euti na Yisraele.
Moto ya misala ya mabɔkɔ nde asalaki yango, mpe ezali Nzambe te;Mwana-ngɔmbɛ ya Samaria ekopanzana mikemike.
7 Mpo bazali kolona mopɛpɛ,Mpe bakobuka mopɛpɛ makasi.+
Molona moko te ezali kobimisa mbuma oyo eteli;*+Molona nyonso oyo eboti ezali kobimisa farini te.
Ata soki ebimisi mwa farini, bapaya nde bakolya yango.+
8 Monguna akomɛla Yisraele.+
Sikoyo bakozala na kati ya bikólo+Lokola mbɛki oyo moto moko te alingi.
9 Mpo bamati na Asiri,+ lokola mpunda ya zamba oyo efandi yango moko.
Efraime afuti bandumba mbongo mpo bálinga ye.+
10 Atako baoyo bango bazali kofuta bauti na bikólo mosusu,Sikoyo nakosangisa bango;Bakobanda konyokwama+ mpo na kilo oyo mokonzi mpe bankumu bakotyela bango.
11 Mpo Efraime abakisi bitumbelo mosusu, na bongo asali lisumu.+
Bitumbelo yango ekómi mpo na ye libaku ya kosala masumu.+
12 Nakomaki mpo na ye makambo mingi ya mobeko* na ngai,Kasi batalelaki yango lokola eloko ya bapaya.+
13 Bazali kopesa ngai bambeka mpe bazali kolya mosuni,Kasi Yehova azali kosepela na yango te.+
Sikoyo akokanisa libunga na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango.+
Bazongi lisusu* na Ezipito.+
14 Yisraele abosani Mokeli na ye+ mpe atongi batempelo,+Mpe Yuda abakisi bingumba mosusu oyo ebatelami makasi.+
Kasi nakotinda mɔtɔ na bingumba na ye,Mpe ekozikisa bandako milai ya engumba mokomoko.”+
Maloba na nse
^ Lil., “Tyá liseke na monɔkɔ na yo.”
^ To, “bazali pɛto.”
^ To, “oyo etɛlɛmi.”
^ To, “mateya.”
^ To mbala mosusu, “Bakozonga.”