Ezekiele 6:1-14
6 Yehova alobaki na ngai lisusu ete:
2 “Mwana ya moto, balusá elongi na yo epai ya bangomba ya Yisraele mpe sakolá mpasi oyo ekokómela bango.
3 Osengeli koloba boye: ‘Ee bangomba ya Yisraele, bóyoka liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso: Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bangomba, bangomba mike, na mikɛli ya mai mpe na mabwaku: “Talá! Nazali kotinda mopanga mpo ebɛta bino, nakobebisa bisika na bino oyo etombwaná.
4 Bitumbelo na bino ekotikala mpamba, bitumbelo na bino ya mpaka ya malasi ekobukana,+ mpe nakobwaka bato na bino oyo babomami liboso ya bikeko na bino ya bosɔtɔ.*+
5 Nakobwaka bibembe ya bato ya Yisraele liboso ya bikeko na bango ya bosɔtɔ, mpe nakopanza mikuwa na bino zingazinga ya bitumbelo na bino.+
6 Na bisika na bino nyonso ya kofanda, bingumba ekobebisama,+ mpe bisika oyo etombwaná ekotikala mpamba, mpe ekobebisama.+ Bitumbelo na bino ekotikala mpamba mpe ekobukana, bikeko na bino ya bosɔtɔ ekosuka, bitumbelo na bino ya mpaka ya malasi ekokweisama mpe misala na bino ekolongolama.
7 Bato oyo bakobomama, bibembe na bango ekokwea na kati na bino,+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.+
8 “‘“Kasi nakotika ndambo ya bato oyo babiki, mpo ndambo na kati na bino bakobika na mopanga na kati ya bikólo ntango bokopalanganisama na kati ya mikili.+
9 Mpe bato oyo bakobika bakokanisa ngai na kati ya bikólo epai bamemaki bango bakangami,+ bakoyeba ete motema na ngai epasukaki mpo bazangaki bosembo,* bapesaki ngai mokɔngɔ,+ bazalaki na mposa makasi ya* bikeko na bango ya bosɔtɔ.+ Bakoyoka nsɔni mpe mabe mpenza* mpo na makambo nyonso oyo basalaki ya mabe mpe oyo eyinamá.+
10 Bakoyeba mpenza ete nazali Yehova mpe ete mpasi oyo nalobaki nakobimisela bango ezali mpamba te.”’+
11 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Bɛtá mabɔkɔ na yo mpe tutatutá na lokolo na yo, lelá mpo na makambo nyonso ya mabe mpe oyo eyinamá oyo bato ya Yisraele basali, mpo bakokufa na mopanga, na nzala mpe na maladi mabe.+
12 Moto oyo azali mosika, akokufa na maladi mabe, oyo azali pene, akokufa na mopanga mpe moto nyonso oyo abiki na yango mpe atikali, akokufa na nzala, nakosopela mpenza bango nkanda makasi na ngai.+
13 Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ ntango bato na bango oyo babomami bakolala na kati ya bikeko na bango ya bosɔtɔ, zingazinga ya bitumbelo na bango,+ likoló ya ngomba moke nyonso oyo etombwaná, na bansɔngɛ nyonso ya bangomba, na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa mpe na nse ya nzete nyonso ya monene ya nkasa mingi, esika bapesaki bambeka ya nsolo kitoko mpo na kokitisa motema ya bikeko na bango ya bosɔtɔ.+
14 Nakosembolela bango lobɔkɔ na ngai mpe nakokómisa mokili yango esika oyo etikali mpamba, mpe bisika na bango nyonso ya kofanda ekotikala mpamba koleka esobe oyo ezali pene ya Dibla. Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”
Maloba na nse
^ Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe kolimbola nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.
^ To, “mpe nkɛlɛ.”
^ To, “balandaki kosala pite na.”
^ To, “mpo na pite na bango.”