Ezekiele 35:1-15

  • Esakweli mpo na mpasi oyo ekokómela bangomba ya Seire (1-15)

35  Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2  “Mwana ya moto, balusá elongi na yo na etúká ya ngombangomba ya Seire+ mpe sakolá mpasi oyo ekokómela yango.+ 3  Lobá na yango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakobundisa yo, Ee etúká ya ngombangomba ya Seire, nakosembola lobɔkɔ na ngai mpo na kopesa yo etumbu mpe nakokómisa yo mokili oyo etikalá mpamba.+ 4  Nakokómisa bingumba na yo bisika oyo ebebisamá, mpe okokóma mokili oyo etikalá mpamba;+ mpe okoyeba mpenza ete nazali Yehova. 5  Mpamba te omonisaki koyina makasi+ mpe okabaki Bayisraele mpo bábomama na ntango ya likama na bango, na ntango ya etumbu na bango ya nsuka.”’+ 6  “‘Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: lokola nazali solo na bomoi, nakobongisa yo mpo na kosopa makila, mpe liwa* ekolanda yo.+ Lokola ezalaki makila oyo oyinaki, liwa ekolanda yo.+ 7  Nakokómisa etúká ya ngombangomba ya Seire esika oyo etikalá mpamba,+ mpe kuna nakoboma moto oyo azali koleka mpe moto oyo azali kozonga. 8  Nakotondisa bangomba na yango na bato oyo babomami; mpe baoyo babomami na mopanga bakokwea na bangomba mike na yo, na mabwaku na yo, mpe na mikɛli na yo nyonso ya mai. 9  Nakokómisa yo esika oyo etikalá mpamba mpo na libela, bato bakofanda na bingumba na yo te;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’ 10  “Mpo olobi ete: ‘Bikólo oyo mibale mpe mikili oyo mibale ekokóma ya ngai, mpe tokozwa yango nyonso mibale,’+ atako Yehova ye moko azalaki kuna, 11  ‘Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: Na yango, lokola nazali solo na bomoi nakosalela yo makambo na kolanda nkanda mpe zuwa na yo oyo omonisaki, na ndenge oyinaki bango;+ mpe nakomiyebisa na kati na bango ntango nakosambisa yo. 12  Bongo bokoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova, nayoki makambo nyonso ya kozanga limemya oyo olobi mpo na bangomba ya Yisraele ete: “Batiki yango mpamba mpe bapesi biso yango mpo tólya yango.”* 13  Na lofundo nyonso bolobaki mabe mpo na ngai, mpe bolobaki maloba mingi ya kofinga ngai.+ Nayokaki yango nyonso.’ 14  “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Mabele mobimba ekosepela ntango nakokómisa yo esika moko oyo etikalá mpamba. 15  Kaka ndenge osepelaki ntango libula ya bato ya Yisraele etikalaki mpamba, ndenge wana nde nakosala yo.+ Okokóma esika moko oyo ebebisamá, Ee etúká ya ngombangomba ya Seire, ɛɛ, Edome mobimba,+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”

Maloba na nse

To, “kosopa makila.”
Lil., “ezala bilei.”