Ezekiele 2:1-10

  • Ezekiele aponami mpo azala mosakoli (1-10)

    • ‘Ezala soki bakoyoka to te’ (5)

    • Rulo ya nzembo ya mawa (9, 10)

2  Bongo alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto,* tɛlɛmá mpo naloba na yo.”+ 2  Ntango alobaki na ngai, elimo ekɔtaki kati na ngai mpe esalaki ete natɛlɛma+ mpo nayoka Moto oyo azalaki koloba na ngai. 3  Alobaki na ngai lisusu boye: “Mwana ya moto, nazali kotinda yo epai ya bato ya Yisraele,+ epai ya bikólo ya batomboki oyo batombokeli ngai.+ Bango ná bankɔkɔ na bango babuki mibeko na ngai tii na mokolo ya lelo.+ 4  Nazali kotinda yo epai ya bana ya botomboki mpe ya motema makasi,+ mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi.’ 5  Nde bango, ezala soki bakoyoka to bakoboya koyoka, mpo bazali batomboki,+ bakoyeba mpenza ete mosakoli moko azalaki na kati na bango.+ 6  “Kasi yo mwana ya moto, kobanga bango te+ mpe kobanga maloba na bango te, ata soki ozingami na bansende mpe na banzubɛ*+ mpe ozali kofanda na katikati ya bankotó. Kobanga maloba na bango te,+ mpe bilongi na bango elɛngisa yo te,+ mpo bazali batomboki. 7  Osengeli koyebisa bango maloba na ngai, báyoka to te, mpo bazali batomboki.+ 8  “Kasi yo, mwana ya moto, yoká oyo nazali koloba na yo. Kokóma te motomboki lokola batomboki oyo. Fungolá monɔkɔ na yo mpe lyá oyo nazali kopesa yo.”+ 9  Ntango natalaki! Namonaki lobɔkɔ moko esembolami epai na ngai,+ mpe na kati namonaki rulo moko oyo bakomi.*+ 10  Ntango afungolaki yango liboso na ngai, ezalaki na makomi liboso mpe na nsima na yango.+ Nzembo ya mawa, kolela ya mawa* ná kolelalela ekomamaki na kati.+

Maloba na nse

Na bisika 93 oyo maloba “mwana ya moto” esalelami na mokanda ya Ezekiele, awa ezali mbala ya liboso.
To mbala mosusu, “atako bato yango bazali matoi mangbongi mpe bazali lokola biloko oyo ezali kotuba yo.”
To, “rulo ya buku.”
To, “kokimela.”