Ezekiele 17:1-24
17 Yehova alobaki na ngai lisusu ete:
2 “Mwana ya moto, pesá sambole mpe lobá lisese mpo na bato ya Yisraele.+
3 Osengeli koloba boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mpongo monene,+ ya mapapu minene, oyo azali na nsala milai na mapapu, oyo atondi na nsala ya langi ndenge na ndenge, ayaki na Liban+ mpe azwaki nsɔngɛ ya nzete ya sɛdrɛ.+
4 Abukaki nsɔngɛ ya bitape na yango ya sika mpe amemaki yango na mokili ya bato ya mombongo* mpe atyaki yango na nse na engumba moko ya bato ya mombongo.+
5 Na nsima, azwaki ndambo ya momboto ya mokili yango+ mpe atyaki yango na elanga oyo ebotaka malamu. Mpe atyaki yango lokola nzete ya sole pene ya mai minene.
6 Bongo ebimaki mpe ekómaki nzete ya vinyo ya molai mingi te oyo ezali kopanzana,+ nkasa na yango etalaki na kati mpe misisa na yango ebimaki na nse na yango. Na yango, ekómaki nzete ya vinyo, ebotaki bitape ya sika mpe ebimisaki bitape ya minene.+
7 “‘“Mpe mpongo mosusu ya monene+ ayaki, azalaki na mapapu minene mpe azalaki na nsala milai na mapapu.+ Nzete ya vinyo yango esembolaki misisa na yango na lokoso epai na ye, mosika na bilanga epai yango elonamaki. Ebimisaki nkasa na yango epai na ye mpo asopela yango mai.+
8 Esilaki kolonama na elanga moko kitoko, pene na mai minene, mpo ebimisa bitape, ebota mbuma, mpe ekóma nzete monene ya vinyo.”’+
9 “Lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Yango ekokola? Moto moko akopikola misisa na yango te,+ akosala te ete mbuma na yango epɔla? Mpe bitape na yango ya sika ekauka?+ Ekokauka mpenza. Ekosɛnga te lobɔkɔ moko ya nguya to bato ebele mpo na kopikola misisa na yango.
10 Ata soki bapikoli yango mpe baloni yango epai mosusu, ekokola? Yango nyonso ekokauka te ntango mopɛpɛ ya ɛsti ekobɛta yango? Ekokauka na bilanga esika yango ekolaki.”’”
11 Yehova alobaki na ngai lisusu ete:
12 “Nabondeli yo, lobá na batomboki ete: ‘Boyebi te soki makambo oyo elakisi nini?’ Lobá ete: ‘Talá! Mokonzi ya Babilone ayaki na Yerusaleme, azwaki mokonzi na yango, bankumu na yango mpe amemaki bango epai na ye, na Babilone.+
13 Lisusu, azwaki moto moko na libota* ya mokonzi,+ asalaki na ye kondimana mpe alapisaki ye ndai.+ Na nsima amemaki bato ya lokumu ya mboka,+
14 mpo bokonzi ekita, ezala lisusu makasi te, mpo kaka soki bato batosi kondimana nde bokonzi ekoki kokoba kozala.+
15 Kasi, nsukansuka, mokonzi atombokelaki ye+ na ndenge atindaki bamemi-nsango na ye na Ezipito, mpo azwa epai na bango bampunda+ mpe limpinga monene.+ Akolonga nde? Moto oyo azali kosala makambo ya boye, akozanga kozwa etumbu? Akoki nde kobuka kondimana mpe abika?’+
16 “‘“Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: “Lokola nazali solo na bomoi, akokufa na Babilone na esika oyo mokonzi* oyo akómisaki ye* mokonzi afandaka, mokonzi oyo ye atyolaki ndai, mpe oyo abukaki kondimana na ye.+
17 Basoda nyonso ya limpinga ya Farao bakozala na likoki te ya kosalisa na etumba,+ ntango basoda ya Babilone bakotonga mwa bangomba ya mabele mpe bifelo mpo na kozinga engumba, mpo na koboma bato* ebele.
18 Atyoli ndai mpe abuki kondimana. Asali makambo nyonso wana atako apesaki elaka.* Akobika te.”’
19 “‘Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Lokola nazali solo na bomoi, nakosala ete anyokwama ndenge atyoli ndai na ngai+ mpe abuki kondimana na ngai.
20 Nakobwaka likoló na ye monyama na ngai, mpe akokangama na monyama na ngai ya bokila.+ Nakomema ye na Babilone mpe nakosamba na ye kuna ndenge azangi bosembo epai na ngai.+
21 Basoda na ye nyonso oyo bakimakimaka, bakokufa na mopanga, mpe baoyo batikali bakopalangana moto na moto na nzela na ye.*+ Bongo bokoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova, nde nalobi.”’+
22 “‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakozwa mwa etape na nsɔngɛ ya nzete ya sɛdrɛ oyo etombwaná+ mpe nakolona yango; nakobuka mwa etape ya pɛtɛpɛtɛ na nsɔngɛ ya mwa bitape na yango+ mpe ngai moko nakolona yango na ngomba moko ya molai, oyo etombwaná.+
23 Nakolona yango na ngomba molai ya Yisraele; bitape na yango ekokola, ekobota mbuma mpe ekokóma nzete ya sɛdrɛ ya monene. Bandɛkɛ ya ndenge nyonso ekofanda na nse na yango mpe ekofanda na elili ya nkasa na yango.
24 Mpe banzete nyonso ya esobe ekoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova, nakitisi nzete oyo etombwaná mpe natomboli nzete oyo ezalaki na nse;+ nakaukisi nzete oyo ezali naino mobesu mpe nasali ete nzete oyo ekauká ebimisa fololo.+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi mpe nasali yango.”’”
Maloba na nse
^ Lil., “mokili ya Kanana.”
^ Lil., “momboto.”
^ Elingi koloba, “Nebukadenezare.”
^ Elingi koloba, “Zidikiya.”
^ To, “milimo.”
^ Lil., “apesaki lobɔkɔ na ye.”
^ Lil., “na mipɛpɛ nyonso.”